Ntina ya Politiki
Tondimi ete bato bazali na makanisi oyo ekeseni na oyo etali bililingi ya mabe mpe ya mobulu. Mpo na kobatela basaleli na makambo ya ndenge oyo, tolongolaka makambo oyo ezali na bililingi mingi ya mabe mpe tobakisaka bilembo ya likebisi na balolenge ya bakonteni misusu mpo bato bayeba ete ekoki kozala sensible liboso bafinya. Totyaka bipekiseli mpo basaleli oyo bazali bana mike bazanga makoki ya komɔna makambo oyo ekoki kozala malamu te mpo na bango to oyo ebɔngi mpo na bambula na bango. Na kosalaka bongo, mokano na biso ezali topesa eksperiansi ya basaleli oyo ebɔngi, na kokobaka kopesa basaleli na biso esika ya kotalisa makanisi na bango.
Toyebi ete basaleli bakoki kokabola bakonteni mpo na kolakisa to kokweisa makambo lokola kobebisa balotomo ya bato to bitumba ya mindoki. Mibeko na biso etalaka ntango makambo ekabolamaka na contexte yango mpe epesaka esika mpo na masolo mpe bopanzi nsango na kolanda yango.
Mpo na piblisite oyo efutami, topesaka libateli mosusu. Na ndakisa, bakonteni oyo elobami ete ekoki kotungisa ekoki kopalangisama te na bapiblisite. Topekisaka mpe bapiblisite ezala na bililingi mpe bavideo oyo ezali kokamwisa, ezali na makambo ya nsɔmɔ, to oyo ezali kolakisa makambo misusu ya minɛnɛ koleka. Mpo na koyeba mingi, kende na Mibeko na biso ya Piblisite.
Kopiblie te:
Bililingi ya bato
Bavideo ya bato, oyo bazali na bomɔi to oyo bakufa, na ndenge mɔkɔ ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ te, oyo ezali kolakisa:
Kokata biteni ya nzoto.
Binama ya kati ya nzoto, lokola binama oyo etikami polele na miso ya bato, mikwa, to batisu ya bamuscle na bato oyo bazali na bomɔi to baoyo bakufa;
Bato oyo bazali kozika to oyo batumbami mɔtɔ; to
Kokata kingo.
Difisio en direkt to etumbu ya liwa.
Maloba ya Kotyola
Maloba ya kobenda likebi ya motema mabe ezali bakomantɛre – lokola maloba to bakomantɛre – oyo ezali kotalisa esɛngɔ to elɛngi likolo ya minyoko to ya bato to banyama oyo bazali komonisama nsɔni.
Tolongolaka
Maloba ya kobenda likebi ya motema mabe oyo esalemi na elilingi (nyɔnsɔ mibale bavideo mpe bililingi oyo eninganaka te) oyo na ndenge mɔkɔ boye eyambi ekran ya likebisi na nse ya politiki oyo, bato oyo basalaka bapiblisite oyo konteni oyo ekoki kozala sensiblei; longola soki elilingi ezali kolakisa makambo ya komibatela (lokola ndakisa, video ya moto oyo azali kobunda mpo na komibatela liboso ya moto oyo azali koyiba ye na ebundeli na mabɔkɔ) to na makambo ya bokɔlɔngɔnɔ (lokola ndakisa, elilingi ya bato ya boyebi mosala ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ oyo bazali kosala lipaso).
Maloba ya polele ya motema mabe ya kobenda bokebi na ntina ya banyama oyo bazali komɔna mpasi oyo elakisami na elilingi, mpe elilingi ezali kolakisa banyama oyo bazali na bomɔi mpe bazali kokufa.
Kopesa to kosenga bililingi oyo elongolamaki to etyami ekran ya likebisi na kolandaka mobeko oyo, soki esangani na maloba ya kotyola.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka ekran ya likebisi mpo bato bayeba ete konteni yango ekoki kozala sensible. Totyaka mpe bipekiseli mpo bakonteni yango emɔnana kaka na mikolo bambula 18 mpe koleka:
Bililingi ya bato
Bavideo ya bato, oyo bazali na bomɔi to oyo bakufa, na ndenge mɔkɔ ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ, oyo ezali kolakisa:
Kokata biteni ya nzoto.
Binama ya kati ya nzoto, lokola binama oyo etikami polele na miso ya bato, mikwa, to batisu ya bamuscle na bato oyo bazali na bomɔi to baoyo bakufa;
Bato oyo bazali kozika to oyo batumbami mɔtɔ, esangisi mpe makambo ya kotumba nzoto ya mowei; to
Kokata kingo.
Bililingi oyo ezali koningana te ya bato, oyo bazali na bomɔi to oyo bakufa, oyo ezali kolakisa:
Kokata biteni ya nzoto.
Binama ya kati ya nzoto, lokola binama oyo etikami polele na miso ya bato, mikwa, to batisu ya bamuscle na bato oyo bazali na bomɔi to baoyo bakufa;
Bato oyo bazali kozika to oyo batumbami mɔtɔ; to
Kokata kingo.
Bililingi (ya nyɔnsɔ mibale bavideo mpe bililingi oyo ezali koningana te) oyo ezali kolakisa liwa ya moto na ndenge ya mobulu (oyo esangisi mpe ntango ya liwa na bango mpe nsima na yango) to moto oyo azali kokutana na likambo oyo kotya bomi na likama (na ndakisa motuka ezali kotuka ye, azali kokwea uta mosika na likolo, to azali kozoka mpota mosusu ya makasi oyo ekoki komema na liwa).
Bililingi oyo ezali kolakisa etumbu ya liwa oyo bapesi na moto (longola difisio ya direkt).
Bililingi oyo ezali kolakisa makambo ya mobulu (lokola ndakisa, misala ya mobulu to bokaneli ya liwa na bato oyo bakangi bakongo na makasi) oyo esalemi na bato to etuluku ya bato.
Bililingi ya bilɔkɔ oyo ezali ya nzoto te ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ te (lokola ndakisa, bambɛli, manzaka, to bilɔkɔ misusu ya libende) oyo ezali kotɔbɔla mposo ya moto.
Bililingi oyo ezali kolakisa mino ya moto oyo ebukani mpe ezali kotanga makila, mino oyo balongoli mpe ezali na makila; to kokɔtisa bilɔkɔ oyo ezali ya nzoto te na kati ya mino to bagencive.
Elilingi oyo ezali kolakisa bana oyo bazali na libumu to bana mike oyo babimi kokufa, longola soki moto mosusu azali na elilingi yango.
Bililingi ya banyama
Bililingi nyonso ya banyama, ya bomoi to ekufi, – oyo ezali kolakisa ndenge biteni ya nzoto ezali kotama, kati ya nzoto oyo ezali komɔnana, ndenge ezali kotumbama to kozika, to kolambama na bomɔi.
Bililingi ya banyama ya bomɔi ndenge ezali kokufa.
Bililingi ya bato oyo bazali kosala mabe makasi na babyama ya bomɔi (na ndakisa, kobɛta na makolo, kozindisa na mai, to kolongola mapapu).
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo emɔnana kaka na basaleli ya bambula 18 mpe koleka:
Bililingi ya bato
Bililingi oyo ezali kolakisa bato ya kokufa oyo bazipami ndambo to nzoto mobimba, ata soki ezali na elembo ya liwa ya mpasi te.
Bililingi oyo ezali kolakisa bana na kati ya libumu to bana mike oyo babimi kokufa, soki moto mosusu azali na elilingi yango.
Bililingi oyo ezali kolakisa bantonga oyo ezali kotɔbɔla mposo ya moto libanda ya contexte ya mangwele, acupuncture to kotya bantonga ya kokauka, kotya nzɔlɔkɔ, to kotɔbɔla nzoto.
Bililingi oyo ezali kolakisa bato oyo bazali ya kozoka na contexte ya bokɔlɔngɔnɔ soki bato yango bazali koyoka mpasi, bazoki, to bazali na batube ya monganga na elongi mpe/to na mabɔkɔ.
Bililingi oyo ezali kolakisa bilɔkɔ ya bosɔtɔ ya nzoto mpe bamayi ya nzoto ya bato (lokola ndakisa, nyɛi, masuba, masanza, mbindo ya matoyi, mucus, baproduit misusu ya lomposo, to makila).
Bililingi oyo ezali kolakisa mituka oyo ezali kozika to kopanzana, to kolakisa ntango to nsima ya ntango oyo motuka oyo ezali kotambola na mbango etutani na elɔkɔ mosusu esika wapi motuka elongwe na nzela na yango mpe / to mokumbi motuka to esika ya moto oyo azali na kati ya motuka ebebi makasi.
Bililingi ya banyama
Bililingi oyo ezali kolakisa banyama, ya bomɔi to ya kokufa, soki makila ezali.
Bililingi oyo ezali kolakisa banyama oyo bazali kobota (na ndakisa, ezali na makila to binama ya nzoto oyo ezali komɔnana).
Bililingi oyo ezali kolakisa banyama, ya bomɔi to ya kokufa, soki banyama-nkɛkɛ ezali kobima na nzoto na yango (na ndakisa, mingusu to misɔpɔ).
Bililingi oyo ezali kolakisa banyama oyo ezoki mpe ezali komɔna mpasi.
Bililingi ya Sɔlɔ Te
Elilingi oyo ezali kolakisa bato oyo bazali ya sɔlɔ te na makambo oyo elandi:
Kokatama biteni ya nzoto;
Binama ya kati ya nzoto, lokola binama oyo etikami polele na miso ya bato, mikwa, to batisu ya bamuscle;
Bato oyo bazali kozika to kotumbama na mɔtɔ;
Kokatama kingo; to
Liwa ya mpasi to makambo oyo ezali kotya bomɔi na likama.
Bililingi oyo ezali kolakisa bato ya sɔlɔ te mpe ezali lokola sɔlɔ (esika wapi elilingi yango ezali lokola to ekokani makasi na foto to video ya moto ya sɔlɔ), na makambo oyo elandi:
Bilɔkɔ oyo ezali ya nzoto te na contexte oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te (na ndakisa, bambɛli, manzaka, to bilɔkɔ misusu ya libende) oyo ezali kotɔbɔla mposo;
Bilɔkɔ ya bosɔtɔ ya nzoto to bamayi ya nzoto ya bato (na ndakisa, nyɛi, masuba, kosanza, mbindo ya matoyi, miyoyo, baproduit misusu ya lomposo), kasi longola makila;
Bana mike to bana ya kati ya libumu oyo bazali libanda ya uterus na kokufa;
Bililingioyo ezali kolakisa banyama ya sɔlɔ te, kasi foto ezali lokola sɔlɔ, na makambo oyo elandi:
Kokatama biteni ya nzoto;
Binama ya kati ya nzoto, lokola binama oyo etikami polele na miso ya bato, mikwa, to batisu ya bamuscle;
Banyama oyo ezali kozika to kotumbama na mɔtɔ;
Banyama oyo ezali kolambama na bomɔi;
Makila ezali;
Banyama ya bomɔi ndenge ezali kokufa;
Bato oyo bazali kosala makambo ya mobulu (na ndakisa, kobɛta na makolo, kozindisa na mai, to kolongola mapapu) na banyama ya bomɔi;
Banyama oyo ezoki mpe ezali komɔna mpasi
Banyama oyo bazali na banyama ya mikɛ-mikɛ oyo ezali kobimela bango na nzoto (na ndakisa, mingusu to misɔpɔ).
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bainformation mpe/to contexte mosusu mpo na kotosisa mibeko:
Topekisaka:
Bililingi to audio ya liwa ya mobulu ya moto soki liwa ya moto yango endimisami na mikanda ya mobeko, mokanda ya liwa, lapɔlɔ ya Partenɛre oyo Tondimelaka, to lapɔlɔ ya bamedia mpe moto mɔkɔ ya libota yo moto oyo akufi asengi ete elongolama.
Video ya bato oyo baziki to batumbami na mɔtɔ na makambo oyo moto azali komitumba ye mɔkɔ mpo na botelemeli.
Tokoki kondima:
Bililingi ya liwa ya mpasi to ya likama ya bomɔi ya moto soki elilingi yango ezali likambo ya likama