Spam

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Topekisaka bakonteni oyo ebɔngisami mpo na kokosa, kobungisa nzela, to kotungisa basaleli mpo na kobakisa mamɔni na ndenge ya artificielle. Bakonteni yango ebebisaka makoki ya bato ya koyangana na ndenge ya sɔlɔ na baplateforme na biso mpe ekoki kozala libaku mabe mpo na bokengi, bozali na kimya mpe bosaleli ya baservice na biso. Tolukaka mpe kopekisa mayele ya mabe, lokola kopalanganisa balien ya bokɔsi mpo na kobenda basaleli oyo bayebi bosɔlɔ na yango te mpe to kode oyo ezali kobungisa nzela, to kosala lokola domaine oyo batyelaka motema.
Spam na internet ezali mosala mɔkɔ oyo epesaka mbɔngɔ Mibeko mpe boyebi na biso esengeli ntango kokende liboso mpo na kokoba kolanda batendance mpe batakitiki ya spam oyo ezali kobimaka. Na kosalaka makambo mpo na kobundisa spam, tolukaka kosala ete ntalo ya basali-bilɔkɔ mpe bapalangisi emata ndelo mɔkɔ na baplateforme na biso, na kobatelaka makambo ya malamu mpenza, ya sɔlɔ ya lisanga na biso.
Topekisaka:
  • Kopiblie, kokabola, koyangana na konteni to kofungola bakonti, Bituluku, Bapage, Milulu to bilÉ”kÉ” misusu, ezala na mabÉ”kÉ” to na ndenge ya otomatiki, na bambala ebele.
    • Tokoki kotya bipekiseli na bakonti oyo esalaka mingimingi te soki bilembo misusu ya Spam (na ndakisa, kopiblie konteni mÉ”kÉ” mbala na mbala) to bilembo ya bizaleli ya sÉ”lÉ” te emÉ”nani.
  • Komeka malamu to komeka koteka, kosomba, to kosanze bilÉ”kÉ” ya plateforme lokola bakonti, bituluku, bapage, etc.
  • Koteka to komeka koteka, kosomba, to kosanze matomba ya site lokola mikumba ya mokambi to moyangeli, to bandingisa ya kopiblie na bisika mÉ”kÉ” boye.
  • Koteka to komeka koteka, kosomba, to komipesana bakonteni mpo na elÉ”kÉ” oyo ezali na motuya ya mbÉ”ngÉ”, longola se soki eyebisami polele ete ezali Konteni ya Marke, lokola elimbolami na Politiki na biso ya Bakonteni ya Marke.
  • Koteka to komeka koteka, kosomba, to kosanze na mayangani, lokola kolinga, kokabola, mamÉ”ni, bolandi, mafini, bosaleli ya bahashtag, etc. Yango esangisi:
    • Kopesa makabo (elingi koloba, kopesa bato misusu epusa ya kolonga) ya mbÉ”ngÉ” to bilÉ”kÉ” oyo ezali na motuya ya mbÉ”ngÉ” na esanzi na mayangani. (ndakisa, "Moto nyÉ”nsÉ” oyo akolinga page na ngai akokÉ”tisama mpo na kolonga 500$)
    • Kosala likabo mpo na kopesa elÉ”kÉ” oyo ezali na motuya ya mbÉ”ngÉ” na esanzi na mayangani. (ndakisa, "Soki olingi page na ngai, nakopesa yo iPhone!")
  • Kosenga to koloba ete basaleli basengeli koyangana na konteni (na ndakisa, kolinga, kokabola) liboso bakoka komÉ”na to koyangana na konteni yango.
  • Kokabola ba URL, badomÉ›ne, to baaplikasio ya mabe to lokuta, oyo esangisi:
    • Maskage: Maskage ezali komeka kokima mibeko na biso oyo etali bakonteni na kolakisaka na boyebi bansÉ” na basistÉ›me na biso ya bosembo bakonteni oyo ekomema libanda ya baplateforme, lokola ba URL to baaplikasio, oyo ekÉ›sÉ›ni na makambo oyo basaleli bazali komÉ”na.
    • Balien ya Lokuta: Bakonteni oyo ezali na lien elaki lolenge mÉ”kÉ” boye ya konteni kasi ezali kopesa elÉ”kÉ” oyo mpenza ekÉ›sÉ›ni. Yango ekoki kosangisa bakonteni na aplikasio to logiciel oyo balaki.
    • Bizaleli ya kotinda na kokosa: Basite web oyo esengaka likambo (na ndakisa captcha, tala piblisite, fina awa) mpo na komÉ”na konteni ya page oyo ezelami mpe nkombo ya domÉ›ne ya URL ebongwani na nsima ya kosala likambo yango, to kotinda basaleli mbala mÉ”kÉ” na domÉ›ne oyo mpenza ekÉ›sÉ›ni kozanga ete mosaleli asala ata elÉ”kÉ”.
    • Passerelle ya kolinga/kokabola: Kosenga ete basaleli bayangana (na lolenge ya kolinga, kokabola, kolanda, to lolenge nyÉ”nsÉ” mosusu ya mayangani oyo ezali piblik) mpo na kozwa makoki ya komÉ”na bakonteni mÉ”kÉ” boye, ya sikisiki.
    • Fonctionalite ya plateforme ya lokuta - Komekola makambo to fonctionalite ya baservice na biso oyo ezali kosala te, lokola Komekola bokÉ”ngÉ”li mbÉ”ngÉ”, basondage en-ligne, babutÉ” ya kofina, to butÉ” Nalingi esika fonctionalite yango ezali te to ezali kosala te ndenge esengeli, mpo na kosala ete mosaleli alanda lien mÉ”kÉ”.
    • Fonctionalite ya lokuta ya page oyo ekomema: Basite web oyo ezali interface ya mosaleli ya lokuta, oyo esalaka ete trafiki ya mbalakaka esalema (na ndakisa bapop-up/unders, kobalola mafini, etc.). Yango esangisi batakitiki lokola kotya mitambo, esika wapi bapop-up ya ntina te ezali kolakisama soki moto ameki kobima na page yango.
    • Kokosa kozala page to domÉ›ne songolo - Page oyo ekomema libanda ya plateforme, URL, to site web to domÉ›ne oyo ezali kobimisa libanda oyo kokosa kozala marke to service oyo eyebana na kosalelaka nkombo, domÉ›ne to konteni oyo ezali na mabunga ya kokoma, maloba oyo ekomami mabe to banzela misusu mpo na kosala lokola ezali basite web, badomÉ›ne to bamarke oyo eyebana malamu na kosalelaka page oyo ezali ndenge mÉ”kÉ” na site mosusu oyo bato bandimelaka.
    • Bosaleli mosusu ya lokuta ya ba URL to balien oyo mpenza elandani na ya likolo.
  • Atako makambo oyo tolobeli na likolo, topekisaka te:
    • Promosio na bisika ebele oyo ebandi te na moto mosusu
    • Kopesa mikumba ya bokambi to boyangeli ya page to etuluku na mosaleli mosusu kolandaka bosepeli na ye na page to etuluku, na esika ya kosanze na elÉ”kÉ” ya motuya.
    • Kopiblie to kokabola Konteni ya Marke oyo etalisami polele.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Badone
Mɔna Lapɔlɔ ya Bolandi Mibeko ya Lisanga oyo euti kobima
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya spam
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi