Kosenga Kosimba to Kosangisa Nzoto na Mikolo mpe Maloba ya Polele ya Kosangisa Nzoto

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Ndenge emɔnisami na politiki ya Kosalela Mikolo na Kosangisa Nzoto, bato basalelaka baservice na biso mpo na kolobela mpe kobenda likebi na mobulu ya kosangisa nzoto mpe kosalela mabe na yango. Toyebi motuya ya masolo oyo mpe topesi yango nzela. Topesaka mpe nzela mpo na masolo ya botomboli ya balotomo ya bato oyo basalaka mosala ya kosangisa nzoto mpe oyo ya kopesa mibeko oyo etali mosala ya kosangisa nzoto. Kasi, totyaka ndelo ntango konteni esungaka na bokutani ya kosangisa nzoto to baservice ya mombongo ya kosangisa nzoto kati na mikolo to ntango konteni ezali kosenga to kopesa bakonteni ya pornografi to ya kosangisa nzoto. Tosalaka yango mpo na koboya kopesa nzela na misala oyo ekoki kozala ya kotekaka bato, kotinda kosala makambo na makasi mpe misala ya kosangisa nzoto na boyokani te.
Totyaka mpe bipekiseli na elobeli ya kosangisa nzoto oyo ekoki komema na kosenga kosangisa nzoto mpo audience mosusu na kati ya lisanga na biso ya mokili mobimba ekoki kotungisama na makambo ya lolenge wana, mpe ekoki kopekisa makoki ya bato ya kokɔta na boyokani na baninga na bango mpe lisanga mobimba.
Topekisaka:
Bakonteni oyo ezali kopesa, kosenga to kopesa balolenge ya kokutana mpo na kosangisa nzoto, oyo elimbolami lokola kosenga komipesa na bokutani ya kosangisa nzoto mpo na kozwa mbɔngɔ to elɔkɔ ya motuya na:
  • Kopesaka to kosengaka bokutani ya kosangisa nzoto (na ndakisa, baservice ya escorte, bamassage ya kosangisa nzoto, masolo ya kosangisa nzoto, baservice ya kibonganga/dominasio)
  • Kosalelaka maloba ya balabala mpo na kindumba oyo esangani na bosengi to bopesi ya kozala disponible, ntalo, to elembo nyÉ”nsÉ” ya transaction ya mbÉ”ngÉ” to elÉ”kÉ” ya motuya, esika, to bainformation ya contact
  • Komipesaka na kosenga kosangisa nzoto oyo esangani na elembo nyÉ”nsÉ” ya transaction ya mbÉ”ngÉ” to elÉ”kÉ” ya motuya
  • Kolakisaka to kotangaka bokutani to bapartenÉ›re ya kosangisa nzoto na ntalo to bilembo nyÉ”nso ya transaction ya mbÉ”ngÉ” to ya bilÉ”kÉ”.
  • Kozwa to kopesa bato misusu mpo na mosala ya kosangisa nzoto na basusu elobelami na politiki oyo etali Kosalela Bato.
Bakonteni oyo ezali kokɔtisa na kosenga kosangisa nzoto na, kopesa, kosenga to kopesa balolenge ya kosolola mpo na bokutani ya kosangisa nzoto lokola:
  • Kosangisa nzoto to komekola kosangisa nzoto
  • Kosangisa nzoto na monÉ”kÉ”
  • Bankisi ya kosangisa nzoto
  • Masolo ya kosangisa nzoto
  • Bamessage ya kosangisa nzoto
  • Mabina oyo ekopesa mposa ya kosangisa nzoto
  • Kokabola bililingi ya bolumbu (lokola bolumbu ya moto, video oyo bato bazali kosangisa nzoto)
Bakonteni oyo ezali kosenga to kopesa balolenge ya bokutani mpo na kozwa bilɔkɔ ya pornografi, to oyo ezali na bankombo ya basaleli to balien oyo ekomema na basite ya pornografi.
Elobeli ya polele ya makambo ya kosangisa nzoto oyo ezali kosalela polele badetail grafiki na ntina ya:
  • Binama ya kobotela,
  • Balolenge ya moto oyo azali na mposa ya kosangisa nzoto (na ndakisa, kopÉ”la to ereksio)
  • Bokutani ya Kosangisa Nzoto
  • Makambo oyo etangami likolo esangisi te bakonteni oyo ekabolami mpo na kosÉ›kisa, kotelemisa makanisi to lokola elakeli mabe na kosangisa nzoto
Topesaka nzela na konteni oyo ebatelami na politiki oyo soki etyami na mokano ya kopamela, kopesa mateya, kotombola boyebi to kopanza nsango. Topekisaka mpe te bato basolola na ntina ya mimɛsɛnɔ ya kosangisa nzoto oyo ezali na kati ya mobeko oyo. Kasi, yango ekoki kotyama bipekiseli mpo emɔnana kaka na mikolo ya bambula 18 to koleka na kolandaka politiki ya Bokɔlɔngɔnɔ & Bozali Malamu mpo na kokomisa pɛtɛ baeksperiansi oyo ebɔngi mpo na bilenge.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka ndelo na makoki ya komɔna bakonteni yango kaka na mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka:
  • Bakonteni oyo ezali kolobela mimÉ›sÉ›nÉ” to baeksperiansi ya kosangisa nzoto
  • Bakonteni oyo ezali na bankombo ya basaleli, balien to balogo ya Basite Web ya Abonema ya Mikolo
  • Elobeli ya polele ya kosangisa nzoto na contexte ya kosÉ›ka to kosÉ›kisa, bakisa mpe masese oyo etali kosangisa nzoto
  • Elobeli oyo epesaka likanisi ya kosangisa nzoto, oyo ezali kotinda na bokutani ya kosangisa nzoto
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bainformation mpe/to contexte mosusu mpo na kotosisa mibeko:
  • Na makambo misusu, topesaka nzela na bakonteni oyo ntango mosusu ekoki kobuka Mibeko ya Lisanga soki etalisami ete konteni yango ezali ya lisÉ›ki. Konteni ekopesama ndingisa kaka soki bilÉ”kÉ” oyo ezali kobuka mibeko na konteni yango ezali komÉ”nana lokola lisÉ›ki to epesami na elÉ”kÉ” to moto mosusu mpo na kosÉ›kisa to kopamela yango.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya kosenga kosangisa nzoto na mikolo mpe elobeli ya polele na ntina ya kosangisa nzoto
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi