Baproduit mpe Baservice oyo Ezali na Bipekiseli
Makambo ya sikisiki ya politiki
BONGOLA MOKOMI
Lelo
22 Jul 2025
14 mai 2025
27 fbl 2025
26 fbl 2025
26 yun 2024
30 nvb 2023
27 Jul 2023
27 apl 2023
22 Dec 2022
27 Oct 2022
23 Dec 2021
24 nvb 2021
30 stb 2021
26 agt 2021
29 Jul 2021
28 Jan 2021
24 stb 2020
30 Jul 2020
22 yun 2020
30 apl 2020
30 nvb 2019
10 Oct 2019
24 stb 2019
3 stb 2019
30 Jul 2019
24 Jul 2019
1 Jul 2019
26 apl 2019
20 Mar 2019
30 nvb 2018
31 agt 2018
Ntina ya Politiki
Mpo na kolendisa bokengi mpe kopekisa misala oyo ekoki komema mbeba, topekisaka komeka ya bato, basali-bilɔkɔ, mpe bateki basomba, bateka, bapesa tombola, bapesa makabo, batinda to basala mombongo ya bilɔkɔ mpe misala misusu na plateforme na biso. Tondimaka te kopesana to koteka bangi oyo ekoki kokoma mbeba ya bilɔkɔ oyo ebatelami na mibeko na biso oyo ezali awa na nse. Bateki oyo bazali na bisika eyebani mpe na internet bakoki kolendisa na kozwa mindoki, masanga, mpe makaya oyo bakoki koteka na nzela ya baservice na biso; kasi, topekisaka emoneli ya makambo oyo mpo na bana mike. Tondimaka masolo na ntina ya boteki ya bilɔkɔ oyo na kati ya babutiki to na bateki ya détail oyo batekaka na internet, koloba mpo na kolendisa mbongwana ya mibeko mpo na bilɔkɔ mpe baservice oyo ezali na nse ya politiki oyo, mpe koloba mpo na kolendisa mpo na to na ntina ya kosalela bankisi ya pharmacie kati na makambo ya kobikisa bokɔnɔ, esangisi masolo ya makambo oyo ekomelaka nzoto to na makanisi nsima ya kosalela yango.
Bilɔkɔ mpe Baservice oyo ezali na bipekiseli ezali bakategori oyo elandi:
- Bankisi mpe Bilɔkɔ ya Farmasi
- Mindoki, Masasi, to Babɔmbi
- Tumbaku mpe Baproduit ya Ndenge Mɔkɔ
- Masanga
- Bokɔlɔngɔnɔ mpe Kozala Malamu
- Bapari ya Mbɔngɔ mpe Masano na Internet
- Baespece oyo ezali na likama mpe oyo ebatelami na mobeko (banyama mpe banzete)
- Bilɔkɔ ya Ntango ya Kala
- Bilɔkɔ oyo Ekoki Komema Likama
- Biteni mpe Mai ya Nzoto
Kategori mɔkɔ-mɔkɔ elimbolami na nse.
Bankisi mpe Bilɔkɔ ya Farmasi
Topekisaka:
Bangi oyo ezali na likama makasi (bangi oyo mingimingi ezali na makoki ya kosalelama na ndenge ya mabe, ya kokomisa moombo, to esangani na makama makasi ya kɔlɔngɔnɔ ya nzoto, oyo esangisi mpe kolekisa dose; na ndakisa, cocaine, fentanyl, heroine).
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kokamba mombongo ya, kopesa, kobonzela to kosenga bangi ya likama makasi.
- Ezali kondima kosomba, kosala mombongo to kokamba mombongo ya bangi ya likama makasi na piblikatɛre ya konteni ye mɔkɔ to na nzela ya bato misusu.
- Ezali komeka kosalela yango mɔkɔ kozanga kondima to reference ya bozongisi, ya kosalisama, to lisalisi mosusu na bosaleli ya konteni. Ekoki kosalema ete konteni yango elobela te bolamu ya, elendisa na kosalela, ekamba to epesa malako mpo na kosala to kosalela bangi ya likama makasi.
- Ezali kokamba to kosala promosio ya (na oyo wapi tolingi koloba kolobela bolamu na ntina ya, kolendisa na kosalela, to kopesa malako mpo na kosalela to kosala) bangi ya likama makasi.
- Tala: Kolobela to kolendisa mpo na bolandi mobeko to kosolola motuya na siansi to na bokɔlɔngɔnɔ ya bankisi ya likama makasi endimami. Yango esangisi bansango mpe bopesi-nsango ya baservice ya bato banso.
Bankisi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te (bankisi to bilɔkɔ oyo ezali kosalelama te mpo na mokano ya bokɔlɔngɔnɔ to esalelami mpo na kozwa oyo eleki makasi - yango esangisi baproduit chimique ya yambo to bilɔkɔ oyo esalelamaka mpo na kosala bankisi yango.)
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kokamba mombongo ya, kopesa, kopesa likabo to kobonzela bangi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te.
- Ezali kondima kosomba, kosala mombongo to kokamba mombongo ya bangi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te na piblikatɛre ya konteni ye mɔkɔ to na nzela ya bato misusu.
- Ezali komeka kosalela yango mɔkɔ kozanga kondima to reference ya bozongisi, ya kosalisama, to lisalisi mosusu na bosaleli ya konteni. Ekoki kosalema ete konteni yango elobela te bolamu ya, elendisa na kosalela, ekamba to epesa malako mpo na kosala to kosalela bangi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te.
- Ezali kokamba to kosala promosio ya (na oyo wapi tolingi koloba kolobela bolamu na ntina ya, kolendisa na kosalela, to kopesa malako mpo na kosalela to kosala) bankisi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te.
- Ezali komeka koteka to kosala promosio ya ya bilɔkɔ ya bangi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te
- Ezali na bilɔkɔ oyo ezali kolakisa bankisi oyo ezali ya bokɔlɔngɔnɔ te.
Bankisi oyo esengaka mokanda ya monganga bankisi oyo esengaka ordonance to oyo esengaka ete mosali ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ atya to apesa yango)
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka to kosala mombongo ya bankisi oyo esengaka ordonance longola ntango ezali:
- Kotya motuya ya mangwele na contexte oyo ezali polele ya mateya to ya lisolo soki etyami ekoki komɔnana kaka na mikolo ya mibu 18 to koleka.
- Kopesa epusa ya kotinda soki etami na bakompani oyo bokɔlɔngɔnɔ oyo eyebani mpe esalaka mombongo na internet, soki ekoki komɔnana kaka na mikolo ya mibu 18 to koleka. Konteni yango esengeli mpe kozala na molabo oyo ezali kolakisa ete okokende komɔna mosali ya bokɔlɔngɔnɔ oyo azali na mokanda to okozwa ordonansi oyo ezali ya malamu.
- Ezali komeka kopesa libonza to likabo ya bankisi oyo epesamaka na ordonnance, longola na ntango ya krize ya nkita, ya bokɔlɔngɔnɔ, ya société to likama ya bilɔkɔ bizalisami.
- Ezali kosenga bankisi oyo esengaka ordonnance, longola soki konteni yango ezali kolobela makoki ya kosomba, ya kozwa to nguya ya bankisi oyo esengaka ordonnance na kontext ya bokɔlɔngɔnɔ.
- Tala: Kolobela to kolendisa mpo na bolandi mobeko to kosolola motuya na siansi to na bokɔlɔngɔnɔ ya bankisi ya oyo epsamaka na ordonansi makasi endimami. Yango esangisi bansango mpe bopesi-nsango ya baservice ya bato banso.
Baentheogene
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kobonzela to kosenga bilɔkɔ ya bonzambe.
- Tala: Kolobela to kolendisa mpo na bolandi mobeko to kosolola motuya na siansi to na bokɔlɔngɔnɔ ya bilɔkɔ ya bonzambe endimami.
Cannabis mpe Bilɔkɔ oyo Esalami na Cannabis
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kosala likabo to ezali kosenga marijuana mpe bilɔkɔ oyo ezali na THC to bilɔkɔ ya ndenge mɔkɔ oyo ekoki kosimba makanisi.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo emɔnana kaka na mikolo ya bambula 18 mpe koleka:
Baentheogene
- Bakonteni oyo ezali kolakisa bondimami na kosalela, kokamba to kosala promosio (na oyo wapi tolingi koloba kolobela bolamu na ntina ya), to kolendisa na kosalela bilɔkɔ ya bonzambe.
- Longola soki oyo ezali likolo esalemi na kontext ya fiksio to ya dokimantɛre.
Cannabis mpe Bilɔkɔ oyo Esalami na Cannabis
- Bakonteni oyo ezali kokamba to kosala promosio (na oyo tolingi koloba kolobela bolamu na ntina ya, kolendisa bosaleli ya, to kopesa malako ya kosalela to kosala) marijuana mpe bilɔkɔ oyo ezali na THC to bilɔkɔ ya ndenge mɔkɔ oyo ekoki kosimba makanisi.
- Bakonteni oyo etali mombongo soki etyami na bisika oyo epesaka marijuana soki ezali komeka te kosomba, koteka to kosala mombongo ya marijuana to bilɔkɔ oyo ezali na THC to oyo bacomposant psychoactif oyo etali yango.
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa, to kosala likabo to kosenga cannabidiol ya komela (CBD) to bilɔkɔ ya cannabidiol ya lolenge mɔkɔ.
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa, to kosala likabo to kosenga cannabidiol ya komela te (CBD) to bilɔkɔ ya cannabidiol ya lolenge mɔkɔ.
- Bakonteni oyo ezali kolobela bokɔnɔ oyo etali cannabidiol ya komela te (CBD) to oyo elandani ya baproduit ya cannabidiol.
- Bakonteni oyo ezali kolakisa bilɔkɔ oyoesalelamaka na marijuana.
Bangi oyo epesamaka na mokanda ya monganga
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka to kosala mombongo na bangi oyo etekamaka na mokanda ya monganga na contexte nyɔnsɔ, bakisa mpe ntango etyami na bakompani ya bokɔlɔngɔnɔ oyo eyebani na kosala mombongo na internet.
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kosenga bankisi oyo etekamaka na kozanga mokanda ya monganga.
- Bakonteni oyo ezali na bondimi to bosaleli ya bangi oyo etekamaka na mokanda ya monganga.
Mindoki, Masasi, to Babɔmbi
Topekisaka:
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, to kosala mombongo ya mindoki, biteni ya mindoki, masasi, babɔmbi, to bilɔkɔ oyo ekoki koboma longola soki:
- etyami na Page, Etuluku to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, esangisi bakompani oyo etekaka bilɔkɔ mɔkɔ na mɔkɔ, basite web, bamarke to bibɔngiseli ya mbulamatadi (na ndakisa departema ya polisi, departema ya makambo ya mɔtɔ) to moto mɔkɔ oyo azali kokabola bakonteni mpo na ebɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko; mpe komɔnana na yango etyami kaka na mikolo ya bambula 21 to likolo.
- Ezali komeka kopesa to kosala likabo ya mindoki, biteni ya mindoki, masasi, babɔmbi, to bilɔkɔ oyo ekoki koboma longola soki etyami na bacontexte oyo elandi:
- Kopesa likabo, kosala mombongo na to kosomba lisusu mindoki mpe masasi na Page, Etuluku to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya mobeko oyo ezali na bisika eyebani, oyo esangisi mpe bakompani oyo etekaka na boke, basite web, bamarke to bibɔngiseli ya guvernema, to moto mɔkɔ oyo azali kokabola bakonteni mpo na bibɔngiseli oyo ezali na bisika eyebani; mpe komɔnana na yango etyami kaka na mikolo ya bambula 21 to likolo.
- Enchɛre to tombola ya mindoki na bibɔngiseli oyo ezali na bisika eyebani, oyo esangisi bakompani, masanga oyo esalaka na guvɛrnema to masanga oyo elukaka matomba te, to bato oyo basangani to basungami na bibɔngiseli oyo ezali na bisika eyebani; mpe komɔnana na yango etyami kaka na mikolo ya bambula 21 to likolo.
- Ezali kosenga mindoki, biteni ya mindoki, masasi, babɔmbi, to bilɔkɔ oyo ekoki koboma.
- Ezali komeka kosomba, koteka, kobonzela, kosanze, kotinda, kokamba, ezali kolobela bolamu, ezali kolendisa na kosalela to ezali kopesa makoki ya kosalela imprimante 3D to malako ya kosala oyo esungami na ordinatɛre mpo na mindoki to biteni ya mindoki kozanga kotala contexte to moto oyo apiblie yango.
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kobonzela, kopesa likabo, kosenga to kondima kozala nkolo ya baaparɛi ya konversio ya mindoki.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo emɔnana kaka na mikolo ya bambula 21 mpe koleka:
Mindoki, Masasi, to Babɔmbi
- Bakonteni oyo etyami na to ezali kosala promosio ya butiki, bibɔngiseli oyo ezali na bisika eyebani, oyo esangisi bakompani oyo etekaka na boke, basite web, bamarke, to bibɔngiseli ya guvernema oyo emekaka kosomba, koteka, kosala mombongo, kobonzela, kosala likabo to kosenga (bakisa mpe na contexte ya enchɛre to ya tombola) mindoki, biteni ya mindoki, masasi, babɔmbi, to bilɔkɔ oyo ekoki koboma.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo kaka mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka bamɔna yango:
Bilɔkɔ oyo ekataka mpe bibundeli misusu:
- Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kokamba, kobonzela, kosala likabo to kosenga: bilɔkɔ oyo ekataka mpe bibundeli misusu ya ndenge na ndenge (na ndakisa, pulverizatɛre ya poivre to balopɛtɛ ya lokolo).
- Bakonteni oyo ezali kolobela bolamu, ezali kopesa malako ya kosalela to ezali kolendisa na kosalela mindoki, biteni ya mindoki, masasi, babɔmbi, bilɔkɔ oyo ekoki koboma, to bilɔkɔ oyo ekataka na botali ya baproduit
- Baofre ya koteka mpe promosio ya bilɔkɔ oyo ebomaka te
Makaya mpe Bilɔkɔ ya Ndenge Mɔkɔ
Topekisaka:
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka to kosala mombongo ya bilɔkɔ oyo etali makaya/nicotine, to bilɔkɔ oyo esalaka lokola moto ameli makaya, esangisi lolenge nyɔnsɔ ya “ENDS” Baproduit ya Basistɛme ya Kotinda Nicotine ya Electronike (na ndakisa, likaya ya electronike, bavape, mpe bavape oyo ezali na nicotine te).
- Longola soki etyami na Page, etuluku, to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi mimbongo oyo etekaka bilɔkɔ mɔkɔ na mɔkɔ, basite web, bamarke, to moto mɔkɔ oyo azali kokabola bakonteni mpo na bibɔngiseli ya bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi kopesa baservice ya kotinda mpe makabo ya marke.
- Ezali komeka kopesa to kosala likabo ya bilɔkɔ ya makaya/nicotine, to baproduit ya “ENDS”.
- Longola soki etyami na Page, etuluku, to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi mimbongo oyo etekaka bilɔkɔ mɔkɔ na mɔkɔ, basite web, bamarke, to moto mɔkɔ oyo azali kokabola bakonteni mpo na bibɔngiseli ya bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi kopesa baservice ya kotinda mpe makabo ya marke.
- Ezali kosenga bilɔkɔ ya makaya/nicotine, to bilɔkɔ oyo esalaka lokola moto ameli likaya, oyo esangisi balolenge nyɔnsɔ ya baproduit ya “ENDS” (bavape oyo ezali na nicotine te).
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo kaka mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka bamɔna yango:
- Bakonteni oyo etyami na to ezali kosala promosio ya bibɔngiseli ya mobeko oyo ezali na bisika eyebani, oyo esangisi mpe basite web to bamarke ya bakompanyi, oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kobonzela baproduit ya masanga ya makasi to makaya.
- Bakonteni oyo ezali kolakisa komelama ya makaya, baproduit ya nicotine, to baproduit ya “ENDS”.
- Bakonteni oyo ezali kokamba to kosala promosio ya bosaleli ya makaya, baproduit ya nicotine, to bamarke ya makaya.
- Bakonteni oyo kolakisa Baproduit ya Kosukisa Komela Makaya
- Bakonteni oyo ezali kolobela to kosala promosio ya kosalela makaya, bilɔkɔ oyo esalelamaka na makaya, to bamarke ya makaya
- Bakonteni media oyo ezali kolakisa ndenge ya komela makaya na contexte oyo ezali ya sɔlɔ
- Longola na contexte ya kampanye ya kobundisa bomeli makaya, ya baservice ya kopesa toli mpo na boombo ya makaya, ya kozongela bomɔi nsima ya koboya makaya, to ya PSA
Masanga
Topekisaka:
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka to kosala mombongo ya masanga ya makasi longola soki:
- Etyami na Page, etuluku, to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi mimbongo oyo etekaka bilɔkɔ mɔkɔ na mɔkɔ, basite web, bamarke, to moto oyo azali kokabola bakonteni mpo na bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi kopesa baservice ya kotinda mpe makabo ya marke.
- Bakonteni oyo ezali koloba na ntina ya masanga ya makasi to kopesa libyangi ya koyaka na esika ya komela masanga oyo wapi masanga yango ekomipesana to ekomelama na esika na molulu, restora, bar, to fɛti.
- Ezali komeka kopesa to kobonzela masanga ya makasi to makaya, longola soki etyami na Page, Etuluku, to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya mobeko oyo ezali na bisika eyebani, oyo esangisi bakompanyi oyo etekaka na boke, basite web to bamarke, to kokabola yo mɔkɔ bakonteni ya bibɔngiseli oyo ezali na bisika eyebani.
- Ezali kosenga baproduit mpe bilɔkɔ ya komɛla ya masanga ya makasi.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo kaka mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka bamɔna yango:
- Bakonteni oyo etyami na to ezali kosala promosio ya bibɔngiseli ya mombongo oyo ezali kati na mibeko, oyo esangisi basite web to bamarke ya bakompani, oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kosala likabo ya baproduit to bilɔkɔ ya komɛla ya masanga ya makasi.
- Bakonteni oyo ezali kolakisa komelama ya baproduit to bilɔkɔ ya komɛla ya masanga ya makasi to kokabola barecette ya masanga ya makasi.
- Bakonteni oyo ezali koloba na ntina ya masanga ya makasi to kopesa libyangi ya koyaka na esika ya komela masanga ya makasi oyo wapi masanga yango ekomipesana to ekomelama.
Bokɔlɔngɔnɔ mpe Kozala Malamu
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo kaka mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka bamɔna yango:
Baproduit to baservice mpo na kokɔnda to kokoma monɛnɛ
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa, kosala likabo, kolobela to kosenga baproduit to baservice mpo na kokonda to ya kokoma monɛnɛ.
- Ezali kondima to kolakisa ndenge produit oyo ekondisaka to oyo ekomisaka monɛnɛ ezali kosalelama, na makambo mɔkɔ ya malamu to ezali kolobela makambo oyo ekomelaka moto na nsima ya kosalela yango.
- Ezali kolakisa bokambi to promosio ya (na oyo wapi tolingi koloba, kolobela bolamu ya, kolendisa na kosalela to kopesa malako mpo na kosalela to kosala) produit ya regime.
- Ezali na maloba ya kokitisa na ntina ya lolenge ya nzoto (lokola ndakisa, maloba, bandimbola, to mituna oyo ezali mabe mpe ezali kobundisa lolenge ya nzoto ya moto, biteni ya sikisiki ya nzoto, to bopeto), to kolakisa bililingi ya pɛnɛ ya eteni ya sikisiki ya nzoto oyo ezali kolakisa mafuta oyo esimbami.
- Koloba ete barezilta ekoki kozwama kaka na kosalelaka bilɔkɔ oyo ekoki kolatama na nzoto, lokola babijoux to bapatch.
- Esalelaka mayɛlɛ ya kokosa na mafini na makambo ya kokɔnda to kovimba, lokola maloba ya sensation na maloba ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ na ndenge ya kofina to ya koleka, to kopesa bilaka ya barezilta ya sikisiki na boumeli ya ntango oyo epesami kozanga ete ezala na maloba ya likebisi to maloba ya kopesa ndimbola.
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa, kosala likabo, koloba na ntina, to kosenga baproduit, misala, to lipaso ya bonzenga. Esangisi:
- Baproduit ya kotelisa lomposo lokola mafuta ya komitelisa.
- Misala ya bonzenga na mokano ya kobikisa, to kozongisa bosali to ndenge elongi to nzoto ya bato ezalaka.
- Ezali kondima to kolakisa kosalela misala to lipaso ya bonzenga, na kolakisaka bolamu to mabe na yango, to makambo oyo esalemaka na nsima ya kosalela yango.
- Ezali kolakisa bokambi to promosio ya (na oyo wapi tolingi koloba kolobela bolamu ya, kolendisa na kosalela to kopesa malako mpo na kosalela to kosala) mosala to lipaso ya bonzenga.
- Ezali na maloba ya kokitisa na ntina ya lolenge ya nzoto (lokola ndakisa, maloba, bandimbola, to mituna oyo ezali mabe mpe ezali kobundisa lolenge ya nzoto ya moto, biteni ya sikisiki ya nzoto, to bopeto)
Likomi: Kosala bopalangisi ya balolenge ya kosalisa nzoto mosala (lokola Bapilate) to ya bilɔkɔ ya bonzenga oyo eumelaka kaka mpo na ntango moke (lokola monzɛlɛ) ezali na kati ya politiki oyo te.
Misala ya Bokɔlɔngɔnɔ oyo Ebulungisaka
Baproduit ya mikolo oyo epesaka mposa ya kosangisa nzoto- Koloba (esangisi ya bato oyo basalaka na makambo ya bokɔlɔngɔnɔ to bibɔngiseli ya bokɔlɔngɔnɔ) ete bakoki kobikisa, kosilisa bokɔnɔ, to kolongola mɔkɔ ya makɔnɔ oyo ekoki kobikisama te oyo elandi mpe/to makɔnɔ oyo ekomi na nivo ya suka (molɔngɔ ya mobimba): Liyebisi: Oyo ezali kosalelama te na maloba oyo etali kobikisa to kokamba ndenge nzoto emiyokaka na makɔnɔ oyo.
- Diabète
- Herpès
- Thyroïde
- Psoriasis
- Ebola
- Cancer
- Autisme
- Alzheimer
- Parkinson
- Sclérose latérale amyotrophique (SLA)
- Virisi ya immunodéficience humaine (VIH)
- Esalelaka mayɛlɛ ya kokosa na mafini na makambo ya bokɔlɔngɔnɔ, lokola maloba ya sensation na maloba ya makambo ya bokɔlɔngɔnɔ na ndenge ya kofina to ya koleka, to kopesa bilaka ya barezilta mɔkɔ ya sikisiki ya bokɔlɔngɔnɔ na boumeli ya ntango oyo epesami kozanga ete ezala na maloba ya likebisi to maloba ya kopesa ndimbola.
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala promosio, kosala mombongo, kobonzela, kopesa likabo to kosenga baproduit ya mikolo oyo epesaka mposa ya kosangisa nzoto, oyo mokano ya yambo ezali kopesa moto elɛngi ya kosangisa nzoto to komatisa moto mposa ya kosangisa, na contexte ya sɔlɔ te to oyo ezali sɔlɔ. Esangisi:
- Bajouet ya kosangisa nzoto
- Baproduit ya kosangisa nzoto
- Baproduit ya kobɔngisa binama ya kobotela na nzela ya lipaso te, lokola baproduit oyo epesaka mposa ya kosangisa nzoto to ematisaka nguya ya kosangisa nzoto
- Baproduit oyo mokano na yango ya yambo ezali kopesa mposa ya kosangisa nzoto
- Kolakisa bilɔkɔ ya kosakana na kosangisa nzoto oyo contexte na yango ezali polele te
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala promosio, kosala mombongo, kopesa, kosala likabo to kosenga baproduit ya bokɔlɔngɔnɔ ya kobota to ya bolamu ya nzoto. Esangisi:
- Baproduit ya Bokɔlɔngɔnɔ ya Kobota to ya Bolamu ya Nzoto soki mokano na yango ya yambo ezali bilengi ya kosangisa nzoto kasi te matomba ya bokɔlɔngɔnɔ, esangisi mpe oyo ezali na bilɔkɔ oyo elendisaka binama ya kobotela ya mibali to ya basi
- Baproduit oyo ezali kolobela makɔnɔ oyo etali makambo ya kobota
- Lipaso ya kobɔngisa binama ya kobotela
- Lipaso ya binama ya kobotela ya mikolo
- Mateya ya kosangisa nzoto oyo mokano ya yambo ezali elɛngi ya kosangisa nzoto
- Baproduit ya hormone (na ndakisa, baproduit oyo ematisaka testosterone)
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala promosio, to kosenga misala ya kosangisa nzoto ya mikolo, oyo ekoki kopesa moto elɛngi ya kosangisa nzoto to komatisa moto mposa ya kosangisa, yango nzoto. Esangisi:
- Bakompani ya kominanola na kosangisa nzoto
- Bisika ya mikolo
- Baservice ya kopesa mateya ya kosangisa nzoto
Bapari ya Mbɔngɔ mpe Masano na Internet
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka bipekiseli mpo kaka mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka bamɔna yango:
Bapari ya Mbɔngɔ mpe Masano na Internet
- Bakonteni oyo ezali komeka koteka, kosala mombongo, kolakisa to kosala promosio ya baservice ya masano ya mbɔngɔ na internet oyo wapi elɔkɔ nyɔnsɔ ya motuya ya mbɔngɔ (ezala mbɔngɔ ya lokasa to ya internet, na ndakisa bitcoin) esengami mpo na kobɛta lisano mpe elɔkɔ nyɔnsɔ ya motuya ya mbɔngɔ ezali na kati ya mbano. Esangisi kasi esuki te na:
- Masano ya makoki, baloteri/tombola, bapari, bapari ya masano, masano ya casino, masano ya libaku malamu, baconcour/batirage-au-sort.
- Masano ya Bapari oyo epesaka eleko ya komeka oyo ezali na ndelo mpe esengaka kofuta nsima na yango.
- Bakonteni oyo ezali komeka koteka, kosala mombongo, kolakisa to kosala promosio ya masano ya casino social oyo esalaka lokola masano ya kolonga mbɔngɔ na libaku lokola bamasini ya mbɔngɔ, esika wapi ezali na libaku mɔkɔ te ya kolonga mbɔngɔ to elɔkɔ oyo ezali na motuya ya mbɔngɔ. Yango esangisi bakonteni oyo ezali kolakisa libaku ya kolonga “bajeton” oyo ezali na motuya ya mbɔngɔ te.
- Bakonteni oyo ezali komeka koteka, kosala mombongo, kolakisa to kosala promosio ya masano ya kobɛta ofele oyo epesaka mposa ya kobɛta masano ya kolonga mbɔngɔ na libaku, esika wapi ezali na libaku mɔkɔ te ya kolonga mbɔngɔ to elɔkɔ oyo ezali na motuya ya mbɔngɔ.
Banyama mpe banzete oyo ezali na likama ya kolimwa mpe oyo ebatelami na mobeko
Topekisaka:
Bakonteni oyo:
- Ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kobonzela to kosenga bikelamu oyo ezali na likama to biteni na yango to baespece ya banzete oyo ebatelami na mobeko.
- Ezali kondima to kolendisa koboma banyama, kosomba to kosala mombongo ya bikelamu oyo ezali na likama to biteni na yango, oyo esalemi na piblikatɛre ya konteni ezala ye mɔkɔ to baninga na ye na nzela ya bato misusu. Yango esangisi te bililingi oyo elakisi ndenge bato ya bikolo misusu bazali koboma banyama na ndenge ya mabe.
- Ezali kolakisa ndenge bazali koboma bikelamu oyo ezali na likama to biteni na yango, oyo esalemi na piblikatɛre ya konteni ye mɔkɔ to baninga na ye.
- Ezali kolakisa bokambi to promosio (na oyo wapi tolingi koloba kolobela bolamu na ntina ya, kolendisa na koboma, to kopesa malako) mpo na kosalela to kosala bilɔkɔ na bikelamu oyo ezali na likama to biteni na yango, to nyama to nzete nyɔnsɔ oyo ezali na likama ya kolimwa.
- Konteni oyo ezali komeka kosomba, koteka to kosala mombongo ya banyama ya bomɔi oyo ezali na likama te, longola soki:
- Etyami na Page, Etuluku to profil Instagram oyo ezali kotalisa bibɔngiseli ya mobeko oyo ezali na bisika eyebani, oyo esangisi bakompanyi oyo etekaka na boke, basite web, bamarke, to bisika oyo ebatelaka banyama, to kokabola yo mɔkɔ konteni ya bibɔngiseli oyo ezali na bisika eyebani.
- Etyami na contexte ya kobɔkɔla, kobonzela, kosenga, kosala likabo to kopesa ndako ya sika na banyama oyo ezali na likama ya kolimwa te, oyo esangi mbɔngɔ ya kofuta kati na bato mpo na kopesa banyama ndako ya sika
- Koteka nyama mpo na likabo ya bonzambe, to kopesa mbano mpo na nyama oyo abungi.
- Etyami na contexte ya koteka nyama oyo ezali na bomɔi.
- Etyami na contexte ya kosomba, koteka to kopesa, kosenga, kobonzela maseke, binama, biteni ya nzoto to mikua, taksidermi, nyɛi ya banyama (longola komposte to engrais).
- Etyami na contexte ya kopesa baproduit oyo etali banyama mpo bato balya yango, lokola: makɛi, mbisi, etc.
Bilɔkɔ ya Ntango ya Kala
Topekisaka:
Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kopesa to kobonzela to kosenga bilɔkɔ ya kala.
Bilɔkɔ oyo Ekoki Komema Likama
Topekisaka:
Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo ya, kopesa to kobonzela to kosenga bilɔkɔ mpe bamateriel ya likama.
Biteni mpe Mai ya Nzoto ya Moto
Topekisaka:
Bakonteni oyo:
- Komeka kosomba, koteka to kosala mombongo ya biteni ya nzoto ya moto, ata koleka bakonteni ya makambo ya koteka bato oyo epekisama na nse ya Politiki ya Kosalela Bato.
- Kosenga kosala esanzi ya mai ya nzoto ya bato.
- Komeka kosomba, koteka to kosala mombongo ya mai ya nzoto ya moto.
- Longola soki etyami mpo na kosala likabo ya mai ya nzoto ya bato lokola sperme to plasama ya makila.
Bilɔkɔ oyo Ezongisami
Topekisaka:
Bakonteni oyo ezali komeka kosomba, koteka, kosala mombongo, kokamba mombongo ya, kosala likabo, kobonzela to kosenga baproduit oyo ezongisami.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Badone
Mɔna Lapɔlɔ ya Bolandi Mibeko ya Lisanga oyo euti kobima
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya baproduit mpe baservice oyo ezali na bipekiseli
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi