Bansango ya lokuta

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Bansango ya lokuta ekeseni na balolenge misusu ya maloba oyo elobami na kati ya Mibeko na biso ya Lisanga mpo ezali na lolenge mɔkɔ te ya kobɔngisa molɔngɔ ya makambo nyɔnsɔ oyo epekisami. Na mobulu ya bililingi ya internet to etamboli ya koyina, na ndakisa, bapolitiki na biso etalisi malamu bakonteni oyo topekisaka, mpe, ata mpe bato oyo bandimi bapolitiki wana te bakoki kolanda yango. Kasi, na bansango ya lokuta, tokoki te kopesa ligne la boye. Mokili ezali kobongwana ntango nyɔnsɔ, mpe likambo oyo ekoki kozala ya sɔlɔ na minute mɔkɔ ekoki kokoma ya lokuta na miniti oyo elandi. Bato bazalaka mpe na baquantité ya bansango oyo ekeseni na ntina ya mokili oyo ezali zingazinga na bango, mpe bakoki kondima ete likambo mɔkɔ ezali bosɔlɔ kasi ezali na yango bosɔlɔ te. Politiki mɔkɔ oyo ezali kaka kopekisa “bansango ya lokuta” ekopesa liyebisa ya malamu te na bato oyo basalelaka baservice na biso mpe ekokoka kotosisama te, mpo tozangi makoki ya kosalela bansango.
Na esika na yango, bapolitiki na biso ezali koloba malamu na ntina ya bacategories ya bansango ya lokuta mpe ezali komeka kopesa malako ya malamu na ntina ya ndenge nini tosalelaka liloba yango ntango tomɔnaka yango. Mpo na bacategorie nyɔnsɔ, etamboli na biso ya kosala mosala etalisi komeka na biso ya kosala ete mituya na biso ya maloba, bokengi, limemya, bosikisiki, mpe bosekele.
Tolongolaka bansango ya lokuta ntango ekoki mbala mɔkɔ kobakisama na libaku ya likama ya kosala mabe na nzoto. Tolongolaka mpe bakonteni oyo ekoki mbala mɔkɔ kobakisama na motungisi kati na etamboli ya misala ya politiki. Mpo na kotalisa makambo nini ezali bansango ya lokuta na bakategori oyo, tosalaka elɔngɔ na banganga-mayɛlɛ ya lipanda oyo bazali na mayɛlɛ mpe boyebi mosala mpo na kopesa motuya ya bosɔlɔ ya bakonteni mpe koyebisa soki ekoki mbala mɔkɔ kobakisa libaku ya likama ya mabe ya mbalakaka. Esangisi, na ndakisa, kosala elɔngɔ na bibɔngiseli ya balotomo ya bato oyo ezali na ekolo yango mpo na koyeba bosɔlɔ ya nungunungu mɔkɔ na ntina ya bitumba kati na bana ya ekolo.
Mpo na bansango misusu ya lokuta, tolukaka mingimingi kokitisa bozali na yango to kosala esika mɔkɔ oyo epusaka masolo oyo ebotaka mbuma. Toyebi ete mingimingi bato basalelka bansango ya lokuta na ndenge ya mabe te, lokola kotya mbamba na likambo(“Ekipi oyo ezali na bastatistique ya mabe koleka baekipi nyɔnsɔ na lisolo ya masano!”) to mpo na liseki to satire (“Mobali na ngai alongi prix ya Mobali ya mbula”). Bakoki mpe kokabola eksperiansi na bango na nzela ya bastory oyo ezali na bosɔlɔ te. Bantango misusu, bato bakabolaka makanisi oyo bandimaka na mozindo na bango mpe bato misusu bamɔnaka yango lokola lokuta to bakabolaka bansango oyo bakanisaka ete ezali bosɔlɔ kasi bato misusu bamɔnaka yango lokola makambo misusu ezali kozanga to ezali koebulungisa.
Na koyebaka ndenge maloba ya lolenge wana ezali, tolukaka mingimingi kopesa basaleli bansango ya motuya soki ezali na bakonteni oyo ekoki kozala ya lokuta to oyo ekoki kobungisa makanisi. Lokola eteni ya mosala yango, na libanda ya Etats-Unis tosalaka elɔngɔ na masanga misusu ya botali bosɔlɔ ya makambo na bisika ndenge na ndenge na mokili mpo na kotalela mpe kopesa motuya ya bosɔlɔ ya bakonteni mingi oyo ezali kosala makɛlɛlɛ koleka na baplateforme na biso (mɔna awa mpe awa mpo na koyeba lolenge tosalaka na Etats-Unis). Na kobanda na Etats-Unis, manaka ya Banɔti ya Lisanga epesaka bato epusa ya kobakisa contexte mingi koleka na baapiblikasio ya Facebook, Instagram mpe Threads oyo ekoki kozala lokuta to kobulungisa (mɔna awa). Topesaka mpe baressource ya komatisa boyebi makambo ya bopanzi-nsango mpe ya nimeriki mpo bato bakoka kozwa ekateli bango mɔkɔ na ntina makambo oyo bakoki kotanga, kondimela, mpe kokabola. Tosengaka ete bato bayebisa, na kosalelaka outil na biso ya IA ya koyebisa makambo, ntango nyɔnsɔ oyo bapiblieke bakonteni organique oyo ezali na bavideo oyo ezali lokola bosɔlɔ to baaudio oyo ezali lokola bosɔlɔ kasi ekalamaki na ordinatɛre to ebɔngɔlamaki, mpe tokoki kokweyisela bango etumbu soki basali yango te. Tokoki mpe kotya elembo na bakonteni misusu oyo ekelami na ordinatɛre to oyo ebɔngɔlamaki, oyo ezali mpenza komema libaku monene ya likama ya kobulungisa bato na likambo ya motuya oyo etali bato nyɔnsɔ.
Ya nsuka, topekisaka bakonteni mpe bizaleli na bisika misusu oyo esangisamaka mingimingi na bopalangisi ya bansango ya lokuta. Na ndakisa, Mibeko na biso ya Lisanga epekisi bakonti ya lokuta, kobuba, mpe bizaleli ya sɔlɔ te oyo ekambami.
Lokola makambo na kati mpe libanda ya internet ezali kobongwana mpe kokende liboso, tokokoba kobɔngisa bapolitiki oyo. Bakonti oyo ekabolaka mbala na mbala bansango ya lokuta oyo etangami na nse awa ekoki, na kobakisa kotosisama ya politiki oyo na bakonteni yango, kozwa bokitisi na bopalangisi, bandelo na makoki na yango ya kosala bapiblisite, to kolongolama na baplateforme na biso. Bansango misusu na ntina ya makambo oyo esalemaka ntango Facebook elongolaka bakonteni ekoki kozwama awa.
Malako
Bansango ya lokuta oyo tolongolaka:
Tolongolaka balolenge ya bansango ya lokuta oyo elandi:
I. Kosala Nzoto Mabe to Mobulu
Tolongolaka bansango ya lokuta to banungunungu oyo bosɔlɔ na yango ekoki kotalelama te, oyo bapartenɛre oyo bayebi mosala malamu bamɔni ete mingimingi ekoki komema likama ya mobulu to kosala bato mabe na kati ya ntango moke. Tolimbolaka nsango ya lokuta lokola konteni oyo ezali na maloba oyo emɔnani ete ezali ya lokuta na mokonzi mosusu. Tolimbolaka nungunungu oyo bakoki kotala bosɔlɔ te lokola maloba oyo bapartenɛre oyo bayebi mosala malamu ya source balobi ete ezali mpenza makasi to bakoki kolandela yango te, mpo na oyo wapi basource oyo bazali na bokonzi bazali te, wapi ezali mpenza te na bosikisiki mpo maloba yango eboyama, to wapi maloba eleki to ezangi ntina mpo bandima yango.
Toyebi ete bansango ya lokuta oyo ekoki komɔnana lokola ezangi ntina ekoki, na contexte ya sikisiki, kopesa nzela na likama ya kosala mabe libanda ya internet, oyo esangisi bobangisi ya mobulu oyo ekoki komema likama makasi ya liwa, kozoka makasi, to mabe mosusu ya nzoto. Tosalaka na rezo ya mokili mobimba ya masanga oyo ezali ya leta te (NGOs), masanga oyo elukaka matomba te, masanga ya kosalisa bato, mpe masanga ya bikolo ebele oyo ezali na boyebi na makambo wana ya mboka.
Na bikolo oyo ezali kati na likama makasi ya mobulu ya bato, tosalaka na boyokani na bapartenɛre ya mboka mpo na kosɔsɔla maloba ya lokuta nini ekoki komema likama ya mbalakaka ya kosala mabe ya nzoto. Yango wana tosalaka mpo na koyeba mpe kolongola bakonteni oyo ezali kosala maloba ya lokuta wana na plateforme na biso. Na ndakisa, nsima ya kosolola na banganga-mayɛlɛ ya mboka, tokoki kolongola bamedia oyo ezali libanda ya contexte oyo ezali kokosa kolakisa makambo ya mobulu, bato bazwi likama ya mobulu to basali-mobulu, mindoki to bilɔkɔ ya basoda.
II. Bansango ya Lokuta oyo Ekoki Kosala Mabe na Bokɔlɔngɔnɔ
Tosololaka na masanga oyo ekambaka makambo ya bokɔlɔngɔnɔ mpo koyeba bansango ya lokuta ya bokɔlɔngɔnɔ oyo mingimingi ekoki komema likama ya mbalakaka na bokɔlɔngɔnɔ mpe bobatelami ya bato. Bansango ya lokuta oyo ekoki kosala mabe na bokɔlɔngɔnɔ oyo tolongolaka esangisi makambo oyo elandi:
  • Bansango ya lokuta na ntina ya mangwele. Na yambo tolongolaka bansango ya lokuta na ntina ya mangwele soki bakonzi na mambi ma bokɔlɔngɔnɔ balobi ete nsango yango ezali ya lokuta mpe ekoki mingimingi kopesa nzela na koboya ya mbalakaka yekokata mangwele. Yango esangisi:
    • Mangwele epesaka autisme (Ndakisa: "Bana mingi bakomi na autisme mikɔlɔ oyo mpo na bomati ya mangwele."
    • Mangwele epesaka Syndrome ya Liwa ya Mbalakaka ya Mwana (Ndakisa: "Oyebi te ete mangwele epesaka SIDS?)"
    • Mangwele epesaka bokɔnɔ oyo balobi ete ebatelaka esongo na yango, to esalaka ete moto oyo azwi mangwele akoma na makoki ya kozwa bokɔnɔ yango (Ndakisa: "Kokata mangwele esalaka mpenza ete okoma na makoki ya kozwa bokɔnɔ yango mpo ezali na bilembo ya bokɔnɔ na kati na yango. Mibatela!")
    • Mangwele to bilɔkɔ oyo basali yango ekoki koboma, ezali ngɛng-mabe, ekoki kosala mabe, to komema likama (Ndakisa: "Ya sɔlɔ, okoki kokata mangwele, soki kotya ngɛng-mabe na nzoto na yo ezali ntina te.")
    • Bokasi ya nzoto oyo obotama na yango ezali na libateli koleka bokasi oyo mangwele epesaka (Ndakisa: "Ezali malamu kozwa kaka bokɔnɔ na esika ya kozwa mangwele.")
    • Kokata mangwele ebele na ntango mokuse ezali na likama, ata soki ezali toli epesami na minganga (Ndakisa: "Kokataka ata moke te mangwele koleka mɔkɔ te na mbala mɔkɔ, ezali na likama - Oyo monganga na yo ayebisi yo etali ngai te!")
    • Mangwele ezali mpenza te na makoki ya kobatela esongo na bokɔnɔ oyo yango esengeli kobatela. Kasi, mpo na bamangwele ya COVID-19, ya gripe to ya malaria, tolongoli te maloba oyo etalisi ete bamangwele wana ezali te na makoki ya kobatela moto mpo azwa bavirisi yango te. (Ndakisa: Longola — "Mangwele ya polio esalaka ata elɔkɔ te mpo na kopekisa yo na kozwa bokɔnɔ"; Longola — "Bamangwele esalaka ata elɔkɔ te mpo na kopekisa yo na kozwa makɔnɔ": Ndima — "Mangwele ekobatela yo na kozwa COVID-19 te, yango wana esengeli ozala mwa mosika na bato mpe olata bavette soki ozali pɛmbɛni na bato misusu."
    • Kozwa bokɔnɔ ya rougeole ekoki koboma te (esengeli bansango mpe/to contexte mosusu) (Ndakisa: "Komitungisa soki ozwi rougeole, ebomaka te.")
    • Vitamine C ekoki kobatela, lokola mangwele, na kozwa bikɔnɔ oyo mangwele ezali.
  • Bansango ya lokuta na ntina ya bokɔlɔngɔnɔ na bantango ya urgence ya bokɔlɔngɔnɔ ya bato. Tolongolaka bansango ya lokuta na bantango ya urgence ya bokɔlɔngɔnɔ ya bato ntango bakonzi ya mambi mwa bokɔlɔngɔnɔ balobi ete nsango yango ezali ya lokuta mpe ekoki mingimingi kopesa nzela na likama ya mbalakaka ya kosala mabe ya nzoto, oyo esangisi kopesa nzela na likama ete bato bazwa to bapanza bokɔnɔ oyo ekoki kosala mabe to koboya mangwele oyo esangani na yango. Toyebaka bantango ya urgence ya bokɔlɔngɔnɔ ya bato na boyokani na bakonzi ya mambi mwa bokɔlɔngɔnɔ ya mboka to mokili mobimba.
  • Kosala promosio to kolendisa mpo na kosalela bankisi ya makamwisi oyo ekoki kozala mabe mpo na makambo ya bokɔlɔngɔnɔ. Yango esangisi bankisi oyo kosalela yango, na contexte ya bokɔlɔngɔnɔ, mingimingi ekoki komema likama ya mpasi makasi to liwa, mpe bankisi ezali te na ndingisa ya kosalelama mpo na kosalisa bato (ndakisa: javel, nkisi ya koboma bamikrobe, pomade ya moindo, soude costique).
III. Bokɔti na Mapɔnami to Botangi Bato
Na koluka kolendisa bosembo ya mapɔnami mpe botangi bato, tolongolaka bansango ya lokuta oyo ekoki komema likama ya kokɔta na makoki ya bato ya koyangana na misala wana. Esangisi makambo oyo elandi:
  • Bansango ya lokuta na ntina ya badati, bisika, bangonga, mpe balolenge ya kopɔna, ya kokomisa bankombo ya bapɔni, to koyangana na botangi bato.
  • Bansango ya lokuta na oyo etali nani akoki kopɔna, makoki ya kopɔna, soki voti ekotangama, mpe bansango to bilɔkɔ nini esengeli kopesama mpo na kopɔna.
  • Bansango ya lokuta na oyo etali soki moto mɔkɔ oyo alingi kopɔnama azali to te.
  • Bansango ya lokuta na oyo etali nani akoki koyangana na botangi bato mpe bansango to bilɔkɔ nini esengeli kopesama mpo na koyangana.
  • Bansango ya lokuta na oyo etali bokɔti ya guvɛrnema na botangi bato, oyo esangisi, soki likoki lizali, ete bansango ya botangi bato ya moto mɔkɔ ekokabolama na ebɔngiseli (ya botangi bato te) mosusu ya guvɛrnema.
  • Maloba ya lokuta to oyo bosɔlɔ ekoki kotalelama te ete Bato ya Imigrasio mpe ya Douane (ICE) ya Etats-Unis bazali na esika ya mapɔnami.
  • Maloba ya lokuta ya polele ete bato bakozwa COVID-19 (to bokɔnɔ mosusu oyo ekoki kokabolama) soki bayangani na mosala ya mapɔnami.
  • Maloba ya lokuta na ntina ya ndenge makambo ezali koleka na esika ya mapɔnami na Etats-Unis oyo ekoki kosala ete mapɔnami esalema te, ndenge etalami na mokonzi mɔkɔ ya mapɔnami.
Tozali na mibeko misusu mpo na kobomba bambela ya kosala mobulu, bolendisi ya mayangani oyo elandi mibeko te, mpe bambela mpo na kosala mobulu na mapɔnami na ndenge oyo ebɔngisami, oyo etalisami na biteni misusu ya Mibeko na biso ya Lisanga.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka elembo ya kopesa nsango:
Bamedia oyo Ebongolami
Bamedia ekoki kobɔngisama na balolenge ebele. Bambala mingi, bambongwana yango ezalaka ntina te, lokola bakonteni oyo ezali kokatama mpo na bantina ya ntɔki to miziki oyo ezali kobakisama. Na bambala mosusu, manipilasio yango emɔnanaka te mpe ekoki kobungisa nzela.
  • Bakonteni oyo Esalemi to Ebɔngisami na Masini oyo Ekoki Kobulungisa Makanisi Mpo na bakonteni oyo ebuki Mibeko ya Lisanga te, tokoki kotya elembo ya kopesa nsango na liboso ya konteni yango – to koboya konteni oyo etindami lokola piblisite – soki konteni yango ezali elilingi, video to audio oyo ezali lokola sɔlɔ kasi ezali mpenza sɔlɔ te, oyo esalemi to ebongolamaki na masini mpe ezali komema likama monɛnɛ ya sikisiki ya kokosa bato na bilɔkɔ na ntina ya likambo oyo ezali ya motuya mpo na bato bansɔ.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya bansango ya lokuta
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi