Bakonteni, Baproduit, to Baservice oyo Elongobani te na Mibeko ya Mboka

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Ntango bibɔngiseli ya guvernema to bato ya mibeko bandimisamaka ete konteni oyo ezali na baservice na biso ezali kobuka mibeko ya mboka, bakoki kosenga ete totyela yango bipekiseli. Bibɔngiseli ya guvernema te mpe basangani ya public bakoki mpe kotinda balapɔlɔ oyo ezali koloba ete konteni elongobani te. Tokoki mpe koyamba mitindo ya esambiselo.
Ntango toyambaka lapɔlɔ to motindo, totalelaka yango naino liboso ya Mibeko ya Lisanga. Soki tomɔni ete konteni yango ezali kobuka bapolitiki na biso, tokolongolaka yango. Soki konteni yango ezali kobuka bapolitiki na biso te, na kolanda mokumba na biso lokola mosangani ya Initiative ya Rezo ya Mokili Mobimba mpe Politiki na biso ya Kompani na ntina ya Balotomo ya Bato, tosalaka botali ya sikisiki ya mibeko elɔngɔ na ya balotomo oyo esengeli kopesa bato mpo na koyeba soki lapɔlɔ yango ezali malamu.
Na bisika oyo tokanisaka ete balapɔlɔ ezali malamu te na kolanda mibeko, ezangi bosikisiki, to ezali na boyokani te na mibeko ya mokili mobimba mpo na balotomo ya bato, tokoki kosenga ete elimbolama malamu to kosala elɔkɔ moko te.
Bisika to salaka mpenza makambo mpo na bakonteni ya basaleli na kolandaka mibeko ya engumba na esika ya kotala Mibeko na biso ya Lisanga, to salaka makasi mpo na totyaka bipekiseli na makoki ya komɔna konteni kaka na bisika oyo elobami ete elongobani te mpe totyaka bitumbu misusu te to bipekiseli ya kosalela bafonctionnalité. Toyebisaka mpe mosaleli oyo likambo yango ezwi ye.
Tobimisaka mpe balpɔlɔ oyo elimbolaka ndenge nini tosalaka bosɔsɔli ya balapɔlɔ ya bakonteni oyo ebukaka mibeko ya mboka mpe bantango oyo totyaka bipekiseli ya komɔna konteni na makambo ya lolenge wana, oyo ekoki kozwama awa.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na oyo etali bakonteni, baproduit, to baservice oyo elongobani te na mibeko ya mboka
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi