Kosalela Bato na Ndenge ya Mabe

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Mpo na koluka kobebisa mpe kopekisa mabe, tolongolaka konteni oyo ezali kopesa nzela to kosala boyokani mpo na kosalela mabe na bato, bakisa mpe kotekama ya bato. Tolimboli kotekama ya bato lokola mombongo ya kobotola moto bonsomi mpo na kozwa litomba. Ezali kosalela bato mabe mpo na kotinda bango na makasi basala kosangisa nzoto mpo na mombongo, mosala, to na misala misusu oyo balingi te kosala. Ezali kotya motema na bokosi, na makasi, mpe na kotindika bato, mpe ezali kotyola bato na ndenge ezali kobotola bango bonsomi na bango kasi ezali kopesa bato mosusu matomba na makambo ya nkita to na bilɔkɔ.
Koteka bato ezali na makambo mingi mpe ezalaka na mokili mobimba; ekoki kosalema na moto nyɔnsɔ etali te mbula na ye, ata te kotala nkita ya bato, ekolo nini, kozala mobali to mwasi, to esika. Ezali na bandenge mingi, mpe likambo nyɔnsɔ ya kotekaka bato ekoki kozala na bitape ndenge na ndenge ya bokoli. Mpo na lolenge ya makasi ya kobebisama oyo, baye bamɔnaki mpasi bakoki kopesa ndingisa te.
Atako tosengeli kokeba mpo na kosangisa te koteka bato na kokɔtisa bato na ndenge ya kobombana, ekoki kozala na boyokani mpe kolakisa kozipama. Nations Unies elimboli kokɔtisa bato na ndenge ya kobombana lokola kozwa to kopesa nzela na bokɔti na ekolo mɔkɔ na ndenge ya kobuka mibeko na bandelo ya bikolo. Kozanga ntina mpo na kotinda na kosala na makasi, ekoki kaka kosala ete basalela bato oyo bazali na likama oyo bazali koluka kolongwa na mboka na bango, mingimingi mpo na koluka bomɔi ya malamu. Kokɔtisa bato na ndenge ya kobombana ezali mbeba oyo endimami te na Leta, na kotalaka muvema, mpe koteka ya bato ezali mbeba oyo esalemi epai ya moto, na kotalaka kobuba ye.
Mpo na kobakisa likolo ya bakonteni oyo ezali kokweisa, kotombola boyebi, to kopesa nsango na ntina ya koteka bato to makambo ya kokɔtisa bato na ndenge ya kobombana, tokopesaka nzela na bakonteni oyo ezali kosenga to kokabola bansango etali bobatelami ya moto mpe kokatisa ndelo ya mboka, koluka kobombana na mboka mopaya to ndenge ya kolongwa na mboka.
Kopiblie te:
Bakonti, misala to mayangani oyo ezali kozwa bato mpo na, kokomisa pɛtɛ to kosalela bato na nzela ya balolenge nyɔnsɔ ya koteka bato oyo elandi:
  • Koteka nzoto (misala nyÉ”nsÉ” ya mombongo ya kosangisa nzoto na bana to misala nyÉ”nsÉ” ya mombongo ya kosangisa nzoto na mikolo oyo esalemi na makasi, lokuta mpe minyÉ”kÉ”)
  • Koteka bana to kotya bana na mabota misusu kozanga kolanda mobeko
  • Koteka bana-bitike to kosala turisme ya ofele na bana-bitike
  • Mabala oyo esalemi na makasi (esangisi mpe kobalisa bana)
  • Kosalela bato na nzela ya mosala (esangisi mpe mosala ya makasi)
  • Boombo na ndako
  • Koteka binama ya nzoto oyo ezongaka lisusu te, kobakisa te kolongola, kopesa, to kotya binama ya nzoto na kontext ya kopesa binama oyo ezali mpo na kosalela te
  • Misala ya kotinda bato basala mabe na makasi (na ndakisa, kosengasenga na makasi, koteka drogue na makasi)
  • Kokokomisa bana basoda
Bakonteni oyo moto mosusu azali kozwa bato mpo na, kokomisa pɛtɛ to kozwa matomba na (ya mbɔngɔ to ya lolenge mosusu) misala ya mombongo ya kosangisa nzoto
Bakonteni oyo ezali kosenga kopesa to kokomisa pɛtɛ kokɔtisa bato na mboka na ndenge ya kobombana
Bakonteni oyo ezali kosenga baservice ya kokɔtisa bato na mboka na ndenge ya kobombana
Topesaka nzela na bakonteni oyo ebatelami na politiki oyo soki etyami na mokano ya kopamela, kopesa mateya, komatisa boyebi, to kopanza nsango.
Na nse ya bapolitiki na biso ya Kosalela Bato, batali na biso mpe basistɛme na biso ya masini ekoki mpe kotala etanda ya bilembo ya bizaleli mpo na kosunga na koyeba mpe kozwa bikateli na bakonti oyo ezali kobuka mibeko.
  • Tokoki kolongola bakonti na kolandaka mayangani na yango na bakonti misusu oyo ezali kobuka mibeko, boluki to mayangani na bakonteni oyo ezali kobuka mibeko, or bosangani na masanga (na ndakisa, Bituluku) oyo tolongola mpo ebukaki mibeko na biso.
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bansango mpe/to contexte mosusu mpo na kotosisa mibeko:
Tokoki kolongola bakonteni oyo ezali kopesa mosala na bisika oyo ezali na likama makasi mpo na kosalela bato na nzela ya misala soki endimisami na bato ya mibeko, na masanga oyo ezali ya leta te na mboka, to na bapartenɛre misusu oyo tondimelaka
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na oyo etali kosalela bato
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi