Bizaleli ya Koyiba, Kobuba, mpe Kokosa
Makambo ya sikisiki ya politiki
BONGOLA MOKOMI
Lelo
7 yun 2025
3 Oct 2024
19 Jul 2024
5 agt 2023
29 apl 2022
24 Dec 2021
25 nvb 2021
29 Oct 2021
27 agt 2021
5 mai 2020
18 Dec 2020
19 nvb 2020
17 Dec 2019
4 stb 2019
Ntina ya Politiki
Tozalaka na mokano ya kobatela basaleli mpe bakompanyi liboso ya bokosi mpo na mbɔngɔ na bango, bilɔkɔ oyo ezali ya bango to bainformation oyo ezali ya bango mɔkɔ. Tokokisaka mokano yango na kolongolaka bakonteni mpe na kobundisaka bizaleli oyo esalelaka banzela ya lokuta na boyebi nyɔnsɔ - lokola kotalisa na ndenge ya lokuta na boyebi nyɔnsɔ, bansango oyo ezwami a ndenge ya moyibi mpe maloba oyo elendisami na ndenge ya kofinya finya makambo - mpo na kobuba to koyiba basaleli mpe mimbongo, to mpo na kopusa mayangani. Yango esangisi bakonteni oyo ezali koluka kokonza to kosala promosio ya makambo wana na baservice na biso. Topesaka bato nzela ya kotombola boyebi mpo na koteya basusu mpe kopamela misala yango.
Topekisaka:
Bakonteni oyo emekaka kobuba to koyiba basaleli mpe/to bakompani na nzela ya:
Moyibi ya mpe Kobuba ya Kodefisa Mbɔngɔ
Bakonteni oyo:
- Epesaka mbɔngɔ ya kodefa oyo esengaka ete mosaleli afuta mwa mbɔngɔ liboso mpo na kodefa mbɔngɔ.
- Epesaka mbɔngɔ ya kodefa na ndanga to pɛnɛ na ndanga ya bondimi, ata soki elobami polele to esɔsɔlami na ndenge ya kobombana na kolandaka ndenge elobami (lokola maloba ya kondima bodefisi mbɔngɔ kozanga kosenga bansango ya makambo oyo etali mbɔngɔ).
- Likomi: Tolukaka mpe basignal misusu mpo na koyeba soki moto to ebɔngiseli ezali kosala piblikasio ya konteni oyo ezali kolanda mibeko, mpe ezali ya moyibi te, lokola ntango ezali ebongiseli mpe banki to ebɔngiseli ya makambo ya mbɔngɔ oyo esili kondimisama.
Moyibi ya mpe Kobuba ya Masano ya Kolonga Mbɔngɔ na Libaku
Bakonteni oyo:
- Kopesa baservice ya kolonga mbɔngɔ ya sɔlɔ na ndenge ya libaku (“Mbɔngɔya sɔlɔ” ezali mbɔngɔ ya mokili ya sɔlɔ oyo ekoki kosalelama mpo na kosomba bilɔkɔ mpe baservice na mokili ya sɔlɔ, esangisi mbɔngɔ ya bikolo lokola Dolare ya Etats-Unis mpe mbɔngɔ ya internet lokola Bitcoin):
- oyo ezali na ndanga ya kolonga.
- oyo ezali kolobela to kondima ete obalusaki ndenge lisano to match esukaki.
- oyo ezali kosenga bato bapesa nzela mpo na kobalusa ndenge match esukaka to koluka lisungi to mayɛlɛ ya ndenge nini kobalusa ndenge nini match to lisano esukaka.
Masano ya casino ya bato oyo esalaka lokola kobeta masano ya kolonga na libaku kozanga ete ezala na libaku ya kolonga mbɔngɔ ya sɔlɔ ekweyi na nse ya Mibeko na biso ya Lisanga na ntina ya Bilɔkɔ mpe Baservice oyo Ezali na Bbipekiseli.
Koyiba to Kobuba oyo Esalemi na Investisema to na Misɔlɔ
- Mabaku ya Kotya Mbɔngɔ. Bakonteni oyo:
- Epesaka mabaku ya kotya mbɔngɔ esika wapi litomba ya kotya mbɔngɔ epesami ndanga to ezangi libaku ya likama.
- Epesaka mabaku ya kotya mbɔngɔ esika wapi litomba ya kotya mbɔngɔ to lifuti etalemi na kolandaka mwa to kolandaka kaka bokɔti ya bato misusu na kati ya manaka likambo yango.
- Kopesa mabaku ya kotya mbɔngɔ esika wapi libaku ezali oyo ya “kokoma na bozwi na mbango” mpe/to ezali koloba ete kotya mbɔngɔ moke ekoki kobalusama mpo na kokoma mbɔngɔ mingi.
- Komultiplie Mbɔngɔ/Mosɔlɔ. Bakonteni oyo:
- Epesaka offre ya kobalola motango mɔkɔ boye ya mbɔngɔ na motango ya mingi koleka na nzela ya komultiplie yango to na nzela ya mayɛlɛ to mabongisi oyo esangisi maloba ya polele ya ”komultiplie mosɔlɔ”, "komultiplie mbɔngɔ”, to maloba ya ndenge mɔkɔ.
Koyiba mpe Kobuba ya Trafic mpe ya Blanchissement ya Mbɔngɔ
- Trafic ya Mbɔngɔ. Bakonteni oyo:
- Epesaka to esengaka trafic ya mbɔngɔ (esalaka ete bato oyo bakosi bango, bazala kati na makambo ya blanchissement ya mbɔngɔ kozanga ete bayeba na kopesaka mbɔngɔ to kokabola matomba mpo ete ndingisa epesama na basusu mpo basalela bakonti na bango ya banki to kotinda mbongo na nkombo ya bato misusu).
- Epesaka to esengaka trafic ya mbɔngɔ na kopesaka mosala mpo na kondima mpe kotinda mbɔngɔ na bato misusu na kosalelaka konti ya banki ya moto oyo bakosi ye.
- Blanchissement ya mbɔngɔ. Bakonteni oyo:
- Esengaka to epesaka lisalisi ya kosala blanchissement ya mbɔngɔ na ndenge ya pɛtɛ, oyo ezali komeka kosala ete mbɔngɔ oyo esalemi na ndenge oyo mibeko epekisi ekoma lokola mbɔngɔ oyo elongobani na kozipaka esika oyo mbɔngɔ yango euti na kosalelaka batransaction oyo bato bakoki kosɔsɔla te, esangisi nyɔnsɔ ya banzela oyo elandi:
- Koluka kotinda mbɔngɔ na nzela ya SWIFT (Societe mpo na Batelecommunication ya Makambo ya Finance Kati na Babanki na Mokili Mobimba) to bandenge misusu oyo ekokani na yango,
- Koluka to kopesa badetail na ntina ya lolenge ya bakonti ya banki oyo ezali mpo na kosunga koyamba to kotinda mbɔngɔ.
Moyibi mpe Kobuba ya Identité ya Sɔlɔ Te
Bakonteni oyo:
- Emekaka kobuba to koyiba basaleli na kotalisaka identité ya mosali piblikasio to lolenge ya lisengami na ndenge ya lokuta:
- Moyibi to Kobuba ya Likabo, oyo ezali masengi mbɔngɔ to makabo ya moyibi mpo na makambo ya kopesa na bolamu ya motema elɔngɔ na maloba ete likabo ezali mpo na likambo ya mbalakata mpe esangisi bansango, lokola bakonti ya banki, esika wapi bakoki kotinda mbɔngɔ.
- Moyibi mpe Kobuba ya Makambo ya Bolingo, oyo ezali komeka kokela boyokani ya bolingo na internet na ndenge ya moyibi na kolukaka boyokani ya ndenge ya kosangisa nzoto te mpe kopesa to kosenga mbɔngɔ to elɔkɔ oyo ekokani na yango lokola lifut ya boyokani yango.
- Moyibi mpe Kobuba ya Bakompani/Bibɔngiseli oyo Esili Koyebana Mingi, oyo esangisi kokosa kotalisa, to koloba na nkombo ya, kompani to ebɔngiseli oyo esili koyebana, mpo na komeka kobuba to koyiba.
Koyiba mpe Kobuba ya Baproduit to Mbano
- Koyiba mpe Kobuba ya Lisungi ya Mbulamatari. Bakonteni oyo:
- Epesaka mbɔngɔ ya lokuta ya lisungi ya mbulamatari to lolenge nyɔnsɔ ya ndenge mbulamatari epesaka mbɔngɔ. Totalaka basignal mingi mpo na koyeba soki ebɔngiseli ezali kopiblie bakonteni oyo elongobani mpe ezali ya moyibi te, lokola ntango eutaka epayi ya ebɔngiseli oyo endimisami.
- Moyibi mpe Kobuba ya Bilɔkɔ ya Sɔlɔ, ya Molimo to ya Illuminati Bakonteni oyo:
- Epesaka bambano ya sɔlɔ, lokola mbɔngɔ, bilɔkɔ, to baservice oyo ezali na motuya ya mbɔngɔ esangisi mbɔngo oyo ekoki kosimbama na mabɔkɔ, ya digital to internet, mpe bilɔkɔ na baservice oyo ekoki kosimbama na mabɔkɔ to ya digital mpo na bosangani na to boyangani na lisanga, lisanga ya bonzambe, etuluku ya bozambe (lokola ndakisa, Lisanga ya bandeko ya Illuminati).
- Kopesa bambano ya sɔlɔ mpo na kosalela magie noire to baformule magique to bilɔkɔ ya magie (lokola ndakisa, baformule magique, bilɔkɔ ya libaku malamu, baamulette, bajeton, bapotion, baportefeuil magic, mpe mingi lisusu.).
- Moyibi ya mpe Kobuba ya Assurance. Bakonteni oyo:
- Kopesa baassurance ya lokuta oyo ekiti ntalo makasi na masengi ya kofuta mbɔngɔ liboso (mbɔngɔ mpo na mokambi, to dépot, to ndenge mosusu).
- Kopesa baassurance ya lokuta oyo ekiti ntalo makasi na bilaka ya kobomba mbɔngɔ ebele na assurance oyo ekeseni na bakompani ya assurance ya momesano (moke na yango ezali 30%).
- Likomi: Tolukaka mpe basignal misusu mpo na koyeba soki ebɔngiseli ezali kosala piblikasio ya konteni oyo ezali kolanda mibeko, mpe ezali ya moyibi te, lokola ntango ezali ebongiseli mpe banki to ebɔngiseli ya makambo ya mbɔngɔ oyo endimisami
- Moyibi ya mpe Kobuba ya Mosala Bakonteni oyo:
- Epesaka misala oyo ezali na ndimbola ya mosala oyo epesami na ndenge oyo ekoki kosɔsɔlama te mpe mabaku ya kokoma na bozwi na mbango oyo ezali kopesa bilaka ya mbɔngɔ na kotya mbɔngɔ Mpo na ntango mokuse to mosala moke.
- Epesaka misala oyo ezali na bansango ya mosala te, mpe koloba kaka ete mosala ezali.
- Epesaka mosala ya kosala uta ndako kasi titre ya mosala ezali koloba ete mosali akoki KOSALA UTA NDAKO TE.
- Epesaka misala na bilaka ya kopesa lifuta liboso.
- Epesaka misala oyo ezali na ndanga.
- Epesaka misala oyo ezali kosenga kofuta mbɔngɔ liboso ya kopesa mosala.
- Likomi: Tolukaka mpe basignal misusu mpo na koyeba soki ebɔngiseli ezali kosala piblikasio ya konteni oyo ezali kolanda mibeko, mpe ezali ya moyibi te, lokola ntango ezali ebongiseli oyo endimisami
- Moyibi mpe Kobuba ya Bokitisi Nyongo mpe ya Kozongisa Kredi. Bakonteni oyo:
- Ezali kopesa bilaka ya kolongola to kokitisa nyongo na motango mɔkɔ ya sikisiki mpo na ntango mɔkɔ oyo epesami.
- Ezali kopesa bilaka ya kosukisa to kolongola nyongo nyɔnsɔ oyo esengeli kofuta to kosambisama liboso ya mibeko.
- Ezali kopesa bilaka ya kolimbisa to kolongola nyongo na nzela ya "manaka ya sika ya mbulamatari" to mbongwana na mibeko to maloba oyo ekokani na yango.
- Ezali kopesa bilaka ya kolongola bansango ya crédit na balapɔlɔ ya crédit to kosala "identité ya crédit" ya sika.
- Likomi: Tolukaka mpe basignal misusu mpo na koyeba soki ebɔngiseli ezali kosala piblikasio ya konteni oyo ezali kolanda mibeko, mpe ezali ya moyibi te, lokola ntango ezali ebongiseli mpe banki to ebɔngiseli ya makambo ya mbɔngɔ oyo endimisami
- Moyibi ya mpe Kobuba ya Makabo Bakonteni oyo:
- Epesaka mbano oyo epesami ndanga ya mbɔngɔ ya sɔlɔ mpo na basaleli oyo balingi:
- Komikomisa nkombo na lien oyo ezali komema na libanda ya site.
- Kokabola Bansango ya Koyaba Moto (PII) to Bansango Misusu ya Moto ye Mɔkɔ.
- Kosolola libanda ya platforme to na kati ya plateforme na nzela ya bamessage ya sekele.
- Kosala elɔkɔ te.
- Moyibi mpe Kobuba ya Kofuta Liboso. Bakonteni oyo:
- Epesaka bilaka ya lokuta ya mbɔngɔ soki moto afuti mbɔngɔ/transfert ya banki/lifuti liboso.
Moyibi mpe Kobuba ya Mikanda ya Lokuta
- Mikanda ya Lokuta to oyo Ekelami. Bakonteni oyo:
- Epesaka bosengi, bokeli, boteki, kosomba to kosala mombongo ya mikanda ya lokuta to oyo ekelami.
- Etekaka bavisa to bacarte vertes.
- Epesaka ndanga ya bondimi ya visa to carte verte.
- Epesaka basaleli makoki ya kozwa bondimi ya visa kozanga ete batondisa masengami ya momesano.
- Mbɔngo ya Mabe to oyo Ekelami na Ndenge ya Kobuka Mibeko. Bakonteni oyo:
- Etekaka, esombaka to esalaka mombongo ya mbɔngɔ ya mabe to oyo ekelami na ndenge ya kobuka mibeko, longola mbɔngɔ masano ya société (lokola ndakisa mbongo ya Monopoli) soki ezali na contexte ya polele ete ezali mpo na masano ya société.
- Bavoucher ya Mabe to oyo Ekelami na Ndenge ya Kobuka Mibeko. Bakonteni oyo:
- Ezali kopesa epusa ya kokabola, koteka, kosumba to kosala mombongo ya bavoucher ya mabe to oyo ekelami na ndenge ya kobuka mibeko.
- Ezali kondima, kosala bopalangisi, to kosenga kosalela bacoupon to bavoucher ya sɔlɔ to ya digital mpo na kokokisa bantalo oyo ezalaka te na:
- kosalelaka bacoupon to bavoucher mpo na kosomba bilɔkɔ oyo bacoupon to bavoucher yango esalami mpo na yango te, to
- kosalelaka bacoupon to bavoucher oyo esili koleka ntango.
- Mikanda ya kelasi mpe mosala ya lokuta. Bakonteni oyo:
- Koteka, kosomba to kosala mombongo ya mikanda ya kelasi mpe mosala ya lokuta.
Moyibi mpe Kobuba ya Bilɔkɔ to Baservice ya Bansango oyo ezwami na moyibi
- Moyibi mpe Kobuba ya Makambo ya Bacarte Bakonteni oyo:
- Esangisi kosomba, koteka to kosala mombongo ya bacarte ya bacrédit oyo ezwami na ndenge ya moyibi to bilɔkɔ misusu ya makambo ya mbɔngɔ oyo ekoki kosalelama mpo na bosombi oyo epekisami (oyo eyebani mpe lokola "Carding")
- Moyibi mpe Kobuba ya PII. Bakonteni oyo:
- Esombaka, etekaka to esalaka mombongo ya Bansango ya Koyeba Moto (PII) to to Bansango misusu ya Moto longola soki ezali mpo na moto ya sɔlɔ te.
- Moyibi mpe Kobuba ya Barevu ya Lokuta. Bakonteni oyo:
- Bambela mpo na kosomba, koteka to kosala mombongo ya baproduit ya barevu/kopesa motuya.
- Kopusa basaleli na ndenge ya kobombana to na ndenge ya polele mpo bapesa barevu mpo na koyamba bokitisi ntalo, bozongisi mbɔngɔ to bilɔkɔ ya ofele.
- Moyibi ya mpe Kobuba ya Baabonema Bakonteni oyo:
- Esombaka, etekaka to esalaka mombongo ya bansango mpo na kokɔta mpe kosalela baservice ya abonema (bansango mpo na kokɔta na baservice ya internet oyo esengaka kofuta yango mbala na mbala na ntango mɔkɔ oyo epesami) na kolobaka na ntina ya service mɔkɔ ya internet oyo esengeli kofuta, ata na kotangaka nkombo na yango to na kokabolaka logo na yango.
- Likomi: Tolukaka mpe basignal misusu mpo na koyeba soki moto to ebɔngiseli ezali kosala piblikasio ya konteni oyo ezali kolanda mibeko, mpe ezali ya moyibi te, lokola ntango ezali ebongiseli mpe banki to ebɔngiseli ya makambo ya mbɔngɔ oyo esili kondimisama.
- Moyibi mpe Kobuba ya Makambo ya Koyiba Bakonteni oyo:
- Esangisi bokaboli, botɛki, mombongo, to bosombi ya:
- mikanda ya ekzamɛ to lokasa ya biyano ya ekzamɛ oyo ezali koya.
- Baproduit to baservice oyo epesaka makoki ya koyiba na ekzamɛ
- Baproduit to baservice oyo epesaka makoki ya koleka testi ya bangi na ndenge mɔkɔ oyo epekisami
Moyibi mpe Kobuba ya Esaleli ya Baaparɛi oyo Epekisami
- Moyibi mpe Kobuba ya Kosalela Baaparɛi. Bakonteni oyo
- Esalaka bambela mpo na kosomba, koteka, kosala mombongo to kokabola baaparɛi nyɔnsɔ ya kozwa motuya oyo basimbisimbi, babɔngɔli, to ya lokuta.
- Endimaka, esalaka bopalangisi to esengaka esaleli ya kosimbasimba baaparɛi na mabɔkɔ mpo na kokokisa bantalo ya malamu te.
- Moyibi mpe Kobuba ya Bakonteni ya Internet. Bakonteni oyo
- Epesaka to esengaka baproduit oyo elendisaka to salaka ete kozwa bakonteni ya internet ezala pɛtɛ na ndenge mɔkɔoyo epekisami. Esengisi kasi esuki wana te: badécodeur augmenté, badécodeur oyo etondami/KODI mobimba oyo bainstallé mpe baservice ya KODI.
Bizaleli ya Kokosa mpe Kobunlugisa Makanisi
- Bizaleli ya Kobunlugisa Makanisi na Ntina ya Bokɔnlɔngɔnɔ. Bakonteni oyo
- Esalaka bopalangisi ya maloba to bandanga ya bokɔlɔngɔnɔ ya lokuta to oyo ebulungisaka na ntina ya makambo ya kokɔnda na kosalelaka mayɛlɛ oyo epusaka bato bafina, lokola kosalela maloba ya sensation oyo ezali kopesa oyo bakisi makambo na yango to ya makasi mpenza
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka ndelo mpo eomɔnana kaka na mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka:
Bakonteni oyo
- Epesaka bilaka ya mbano ya sikisiki ya kokɔnda na ntango ya sikisiki kozanga ete ezala na maloba ya likebisi ya malamu.
Ata nsima ya nyɔnsɔ oyo elobami na likolo, topekisaka te bakonteni oyo ezali kopamela, kotombola boyebi to kopesa malakisi na bato misusu na ntina moyibi mpe kobuba, ezala na kozanga kobimisa bansango ya sensible to kosala bopalangisi ya moyibi to kobuba
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bansango mpe/to contexte mosusu mpo na kotosisa mibeko:
- Tokoki kolongola bakonteni:
- Oyo ezali na makambo ya moyibi/kobuba oyo bibɔngiseli oyo tondimelaka efundaki .
- Oyo ezali na ntina ya makambo ya corruption to ya koyiba mbɔngɔ.
- Oyo ezali kopesa mangwele mpo na komeka kobuba to kokosa basaleli.
- Oyo ezali komeka kobɔngisa moto ya lokuta to kokosa kozala moto oyo ayebani mingi, to kosalela elilingi ya moto oyo ayebani na ndenge oyo elandi mibeko te, mpo na komeka kobuba to kokosa.
- Oyo ezali kopesa to kosenga baproduit to baservice oyo esalema mpo na kosala ete kotala to kosala enregistrema ya bato na ndenge ya sekele ezala pɛtɛ, lokola ndakisa, bakamera ya sekele, bisalelo ya kolandela batelefone (esangisi baoyo epesaka makoki ya kolandela banimero ya telefone oyo eyebani te), to baekipema misusu ya kobombana mpo na kolandela makambo ya bato.
- Oyo epesaka mabaku ya kozwa bato oyo bazali kofunda likambo mpo bato basala basenga boyoki na ndenge ya etuluku, na koyibaka identité ya moto ya mbulamatari to ya ebɔngiseli ya bansango, na kosalelaka maloba ya sensation, to kosalelaka maloba oyo bosɔlɔ na yango efinami.
- Oyo epesaka baservice ya abonema oyo esengaka basaleli batya Bansango na Bango Mɔkɔ.
- Topekisaka bibɔngiseli bayangana na to baloba ete bamikɔtisi na bizaleli ya Moyibi to ya Kobuba oyo ebɔngisami, esangisi esaleli ya bakonti mingi na baservice na biso mpo na kobɔngisa bizaleli ya moyibi.
Na makambo misusu, topesaka nzela na bakonteni oyo ntango mosusu ekoki kobuka Mibeko ya Lisanga soki etalisami ete konteni yango ezali ya liseki. Konteni ekopesama nzela kaka soki bilɔkɔ oyo ezali kobuka mibeko na konteni yango ezali komɔnana lokola lisɛki to epesami na elɔkɔ to moto mosusu mpo na kosɛkisa to kopamela yango.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na oyo etali bizaleli ya koyiba, kobuba, mpe kokosa
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi