Cyber-sécurité

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Toyebi ete bobatelami ya basaleli na biso esangisi bokengi ya bainformation ya bato, bakonti, baprofil mpe bibɔngiseli misusu ya Meta oyo bakoki kokamba, lokola mpe baproduit na baservice na biso na ndenge ya monɛnɛ. Komeka kosangisa bainformation sensible ya bato to komipesa na bokɔti oyo epekisami na banzela ya kokosa to ya makasi ezali mabe mpo na ambiance ya sɔlɔ, ya polele mpe ya bokengi oyo tolingi kolendisa.
Topekisaka:
Koluka kobebisa to kokɔta na bakonti na banzela oyo epeskisami, esangisi:
  • KokÉ”ta na bakonti, baprofil, to na bibÉ”ngiseli misusu ya Meta oyo ezali ya yo te na banzela ya lokuta to kozanga ndingisa oyo epesami na konti, profil, to nkolo ebÉ”ngiseli yango.
  • Koyambi, kozwa to kosenga bainformation ya bokÉ”ti, bainformation yo moto ye mÉ”kÉ”, to bansango misusu oyo ezali sensible ya mosaleli mosusu na mokano ya bokÉ”ti oyo epkisami, oyo esangi na balolenge oyo elandi:
    • Kosala phishing, oyo tolimboli lokola momeseno ya kosala masolo to basite web oyo esalemi mpo no kosala lokola ezali masolo to basite web oyo bandimelaka mingi to ezali na nsango malamu epai ya bato, na mokano ya kozwa bansango ya mosaleli oyo ezali sensible na ndenge ya kobuba.
    • Ingenieri ya Société, lokola komeka mbala na mbala kolongola to kozwa biyano na mituna ya kozongela konti oyo bato batunaka mingi.
    • Balogiciel ya mabe, Balogiciel gris, Balogiciel espions to kode mosusu ya mabe, ndenge elimbolami na nse.
Komeka kokabola, kosala, kobomba, to kopalangisa kode ya mabe to ya likama, esangisi:
  • Kolendisa to kokosa basaleli mpo batelecharge to bafungola bafichier, baaplikasio, to baprogramme oyo ekobebisa bokengi ya internet ya mosaleli to bokengi ya badonnée na ye, esangisi kasi esuki wana te, na:
    • Balogiciel ya mabe, oyo elimbolami lokola kode to logiciel oyo esalemi mpo na kobebisa to kozwa bokÉ”ti oyo epekisami na basistÉ›me. Esangisi baprogramme oyo esalemi mpo na komema makama na basistÉ›me ya ordinatÉ›re, lokola mpe balogiciel oyo esalema mpo na koyiba bato mbÉ”ngÉ”, lokola balogiciel ya moyibi.
    • Balogiciel espion, oyo elimbolami lokola kode to logiciel oyo esangisaka badonnée na ntina ya basaleli mpe etindaka yango epai ya bato misusu kozanga ete mosaleli apesa ndingisa na ye na koyebaka makambo nyÉ”nsÉ”, to oyo esalelaka badonnée mpo na mikano ya mabe (na ndakisa, sextortion, chantage, bokÉ”ti oyo elandi mibeko te na basistÉ›me).
    • Balogiciel gris, oyo elimbolami lokola kode to logiciel oyo esalaka ete materiel to balogiciel esala malamu mpe ekoki kozala mpasi na kolongola na sistÉ›me to rezo ya ordinatÉ›re.
  • Kosala, kokabola to kobomba balogiciel ya mabe oyo esangisi bobakisi ya navigatÉ›re mpe baaplikasio mobile, na kati to libanda ya plateforme, oyo etyaka basaleli to baproduit mpe baservice na biso na likama.
  • Kobangisa, kondima, to kopesa epusa ya kopirate - Esangisi na kokabola to kosala piblisite ya logiciel, mateya, to bilÉ”kÉ” oyo epesaka bato epusa ya kokima basistÉ›me ya bokengi, bakisa mpe balogiciel oyo elendisaka na piratage ya balogiciel to bainformation ya kokÉ”ta na konti
  • Kopesa infrastructure ya internet, oyo esangisi baservice ya kobomba basite web, baserveur sistÉ›me ya bankombo ya site mpe barezo ya piblisite oyo epesaka nzela na balien ya mabe na ndenge oyo mingi ya balien yango na baservice na biso ebuki biteni ya Mibeko ya Lisanga etali spam mpe bokengi na internet.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya cyber-sécurité
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi