Ntina ya Politiki
Na koluka kopekisa mpe kosukisa mbeba libanda ya internet mpe bizaleli ya komekola, topekisaka bato bapesa nzela, babɔngisa, balendisa to bandima misala misusu ya mabe to oyo etali bato, bakompanyi, bilɔkɔ to banyama. Tozali kopesa nzela na bato balobela mpe balendisa maloba mpo na boyokani ya mibeko ntina na misala ya mabe, mpe lisusu kobenda likebi na misala ya mabe to oyo bakoki kotatola to kokutana na yango soki kaka bazali kotombola to kosala boyokani te mpo na mbeba.
Tolongolaka:
Mabe esongo na bato Outing: kobimisa Identité to bisika oyo esangani na moto oyo akoki:
Kozala mosangani ya etuluku ya likama na libanda; mpe/to
Kokabola barelation ya libota mpe/to ya bolingo na mo(ba)sangani ya etuluku ya likama na libanda; mpe/to
Kosala makambo ya mosala na lisungi ya etuluku ya likama na libanda (kolongola mpo na bato ya politiki)
Kolongola stati ya kobombana ya moto atosisaka mibeko, soda, to moto ya bokengi soki konteni ezali na nkombo ya mosali, elongi to badge na ye mpe elɔkɔ nyɔnsɔ oyo elandi:
Lisanga ya moto atosisaka mibeko
Mosala ya moto atosisaka mibeko
Kotanga na polele stati na ye ya kobombana
Kokamba, kobangisa, kosunga, to kondima kofina likambo, longola na kontext ya kotombola boyebi to kopamela, ya baparamɛtre ya makanisi to oyo esalemi na bilili to ya bosikoli.
Kotalisa na elilingi, kosala promosio, kobunda mpo na to kolendisa bosangani na momekano ya likama mingi oyo epanzani mingi na internet, longola na kontext ya kotombola boyebi to kopamela. Na esika elilingi etalisami na bakontext yango, totyaka mpe elembo mpo bato bayeba ete konteni yango ekoki kozala ya sensible.
Mabe esongo na banyama
Kokamba, kobangisa, kosunga to kondima makambo ya kosala mabe na banyama (na lolenge ya kokoma, komɔna to koloba) longola na bisika ya:
Kotombola boyebi to kopamela
Bosikoli
Kobika na likama to komibatela, moto mosusu to nyama mosusu
Baparamɛtre ya makanisi to oyo esalemi na estrade, LONGOLA esika wapi etalisi bitumba ya banyama na ekran to bosikoli ya lokuta ya banyama
Kosala bokila to kolɔbɔ mbisi
Mbeka ya bonzambe
Kolamba to kobɔngisa bilei
Banyama mabe to binsekwa
Koboma na loma
Etumba ya bangɔmbɛ
Kokamba, kobangisa, kosunga, to kondima bitumba ya banyama na estrade to kosala bililingi ya video bosikoli ya lokuta ya banyama, longola na kontext ya kotombola boyebi to kopamela to bosikoli.
Mabe esongo na bilɔkɔ
Kokamba, kobangisa, kosunga, to kondima kobebisa to koyiba bilɔkɔ (na lolenge ya kokoma, ya komɔna to ya koloba), longola na contexte ya
Kotombola boyebi to kopamela,
Bosikoli,
Baparamɛtre ya makanisi to oyo esalemi na estrade,
Kondima na kontext ya komibatela, to ya kobatela moto mosusu
kotalisa bililingi ya kobebisa bilɔkɔ na kontext ya botelemeli,
kotalisa bililingi ya bagrafiti, to
kolobela malamu na ntina ya kobebisa bilɔkɔ mpe moyibi oyo esalemi na bato misusu.
Kokosa na mapɔnami mpe/to na kotanga batoBaoffre ya kosomba to koteka mapɔni na mbɔngɔ, bakado, baservice to bilɔkɔ misusu, longola soki ekabolami mpo na kopamela, kotombola boyebi, kopanza nsango, to kosɛkisa to kosɛka.
Koloba makasi na ntina ya likambo, kopesa malako mpo na, to kolakisa polele-polele mokano ya koyangana na mapɔnami na ndenge ya kobuka mibeko (lokola ndakisa, kosala lipɔni mbala mibale to kokosa makoki na yo ya kosala lipɔni) to etamboli ya kotanga motango ya bato oyo bakosala lipɔni (lokola ndakisa, kotalisa bainformation ya bato na ndenge ya mabe to bato boni bazali na kati ya libota), longola se soki ekabolami mpo na kokweisa, kotombola boyebi, lapɔlɔ ya bansango, to na makambo ya liseki.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka elembo mpo bato bayeba ete konteni yango ekoki kotungisa:
Bililingi oyo ezali kotalisa momekano ya likama makasi oyo eyebani soki ekabolami mpo na kopamela to kotombola boyebi na makama oyo esangani na yango.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka yango bipekiseli mpo emɔnana kaka na mikolo ya bambula 18 mpe koleka.
Bililingi oyo ezali kolakisa balolenge ya kokumba motuka oyo ezali kotya mokumbi motuka to bato misusu na likama, oyo ekoki kotya bomoi na likama to komema liwa, longola soki ekabolami na lolenge ya fiction to soki ezali mpo na natina ya mosala.
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bainformation mpe/to contexte mosusu mpo na kotosisa mibeko:
Tolongolaka:
Outing: kobimisa identité ya moto mpe kotya ye na likama ya mbeba:
Basangani ya LGBTQIA+
Basi oyo batye litambala te
Bato oyo bazwa etumbu te lokola baye balukaka se kosangisa nzoto na kontext ya Koluka Kosimba Mosali-makambo Mabe
Bato oyo bazwisami na makambo ya mibeko, ntango bosangani na bango epekisami na koyebana na bato nyɔnsɔ
Batatoli, bapesi-nsango, basali, bakangami to bato basimbami na makasi
Bato bakima, ntango epesami na nzela oyo guvɛrnema endimelaka
Bakangami ya bitumba, na kontext ya etumba ya mindoki
Bililingi oyo ekoki kokosa piblik na kotalaka esika euti soki:
Ebɔngiseli oyo etalisami to motalisi oyo azali na ndingisa atelemeli bililingi, mpe
Bililingi ezali na makoki ya kosala mabe na basangani ya piblik.
Liloba ya mokano, mbela ya kosala likambo, to bolendisi ya:
Kokanga makoki ya kokɔta na baservice ya motuya ntango ezali na bondimisi to bondimisi oyo eyebani na piblik ete mituka ya mbalakaka ekangami, TO
Kopɔna moto to etuluku ya bato ya sikisiki na kokanga makoki na bango ya kozwa baservice ya motuya to nzela oyo ezangi libaku na lolenge oyo ekoki kobangisa bobatelami na bango
Kokɔta na makambo oyo etali mapɔnami to kotanga bato, oyo esangisi:
Bambela mpo mobulu oyo ebɔngisami oyo ekoki kosimba makoki ya moto ya kosangana na mapɔnami to botangi bato oyo ezali kosalema.
Koloba ete kosangana na mpɔnami to na botangi ya bato ekoki komema to ekomema mikakatano ya mibeko (na ndakisa, kokangama, komema na makasi to bokangami).
Bobangisi ya kokende na esika ya mapɔnami mpo na kolandela to kotala bapɔni to misala ya bakonzi na mapɔnami soki esangani na maloba ya kobangisa (ndakisa, "Tolakisa bango nani azali mokonzi!,", "Balingi etumba? Tokopesa bango etumba.").
Bobangisi ya kokende na esika ya misala ya nsima ya mapɔnami soki esangani na maloba ya kobangisa (ndakisa, "Tolakisa bango nani azali mokonzi!,", "Balingi etumba? Tokopesa bango etumba.").