Kosalela bana na kosangisa nzoto
Bakonteni, misala, to mayangani oyo ezali kobangisa, kolakisa, kokumisa, kosunga, kopesa malako mpo na, kosala maloba ya mokano, kondima kosangana na, to kokabola balien na bosalelami ya bana na kosangisa nzoto (esangisi bilenge ya sɔlɔ, bana mike, to babebe, to kolakisa makambo oyo ezali sɔlɔ te na bizalela ya bato, lokola na ntɔki, bakonti oyo ebimi na IA, bato ya masolo ya babuku, bapopi, bongo na bongo). Esangisi kasi esuki te na:
Kosibana
Kosibana to kosangisa nzoto na monɔkɔ, oyo tolimboli lokola kokɔtisama na monɔkɔ to na binama ya kobotela to kokutana na binama ya kobotela to mosomba ya moto mosusu, ntango ata mɔkɔ ya binama ya moto to mosomba ezali komɔnana.
Kosibana to kosangisa nzoto na monɔkɔ oyo ebombani, kobakisa mpe ntango ekosalema kala te to ezali komɔnana mbala mɔkɔ te.
Kopesa binama ya kobotela to mosomba mposa ya kosangisa nzoto, kobakisa mpe ntango misala ekosalema kala te to ezali komɔnana mbala mɔkɔ te.
Mɔkɔ ya makambo oyo totangi likolo oyo esalemi na nyama.
Bana na bilɔkɔ ya kosangisa nzoto, oyo esangisi kasi esuki te na:
Bilɔkɔ ya kokanga
Bilembo ya kozwa mposa
Kotala binama ya kobotela to mosomba
Bozali ya moto mokolo oyo azali na mposa
Bozali ya bilɔkɔ ya kosalela na kosangisa nzoto to kosalela elɔkɔ mpo na kozwa mposa ya kosangisa nzoto, bosepeli, to kosangisa nzoto na makasi
Bilamba oyo ezali ya kosangisa nzoto
Kolongola bilamba
Esika ya scene (na ndakisa, likolo ya mbeto) to kokangama foto na ndenge ya mosala (kalite/focus/litumu)
Kopesa bipwɛpwɛ monɔkɔ polele
Kopesa mposa na mabɛlɛ ya bato to kosimbasimba mabɛlɛ ya basi (LONGOLA soki ezali na kontext ya komɛlisa mwana)
Bozali ya baproduit mike ya kosangisa nzoto
Bakonteni oyo ezali na bana na kontext ya bonganga ya kosangisa nzoto
Bakonteni oyo ezali kosunga, kosala promosio, kolobela bolamu to kolendisa na kosangana na pedofili, longola soki bazali kolobela kozanga kozwa ngambo na kontext ya bokɔlɔngɔnɔ
Bakonteni oyo ezali kotalisa to kosɛka bato oyo etalisami ete bazwi mbeba ya kosalela bana na kosangisa nzoto, na nkombo to elilingi
Kosenga Kosangisa Nzoto
Bakonteni oyo ezali kosenga bakonteni to makambo ya kosangisa nzoto na kolakisaka to kotyaka bana, oyo tolimboli lokola:
Bilɔkɔ ya Kobebisa Bana na Kosangisa Nzoto (CSAM)
Bililingi ya bolumbu ya bana oyo bazali sɔlɔ to sɔlɔ te
Bililingi oyo emɔnani na ndenge ya kosangisa nzoto ya bana oyo bazali sɔlɔ to sɔlɔ
Mayangani ya malamu te na bana
Bakonteni oyo ezali kosangisa to kosunga mayangani oyo elongobani te na bana, lokola:
Kosenga, kobongisa to kosala manaka ya bokutani mpo na kosangisa nzoto na bana
Kopusa bana bamipesa na misala ya kosangisa nzoto na nzela ya masolo oyo etali kosangisa nzoto to kopesa, kolakisa, kozwa to kosenga bilɔkɔ ya kosangisa nzoto na to epai ya bana, na nzela ya bolakisi oyo esalemi na boyebi to na bamessage ya sekele.
Komipesa na ndenge ya kobombana na masolo ya kosangisa nzoto na bamessage na bana
Kozwa to kosenga bilɔkɔ ya kosangisa nzoto na bana na bamessage privé
Bililingi ya nkuku oyo ezali kosalelama na ndenge ya mabe mpe sextorsion
Bakonteni oyo ezali komeka kosalela bana ya sɔlɔ na ndenge ya mabe na:
Kosenga na makasi mbɔngɔ, lisungi to bililingi ya nkuku na kobangisaka kolakisa bililingi ya sɔlɔ to bainformation ya nkuku
Kokabola, kobangisa, to kotalisa mokano ya kokabola masolo ya sekele ya makambo ya kosangisa nzoto to bililingi ya sɔlɔ ya nkuku
Komɔna bana lokola bilɔkɔ ya kosangisa nzoto
Bakonteni (esangisi bafoto, bavideo, ntɔki ya mokili ya sɔlɔ, bakonteni digital, mpe botalisi ya maloba) oyo ezali komɔna bana ya sɔlɔ to ya sɔlɔ te lokola bilɔkɔ ya kosangisa nzoto
Bituluku, Bapage, mpe baprofil oyo emipesaka na komɔna bana ya sɔlɔ to ya sɔlɔ te lokola bilɔkɔ ya kosangisa nzoto
Bolumbu ya bana
Bakonteni oyo ezali kolakisa bolumbu ya bana oyo bazali sɔlɔ to sɔlɔ te na esika wapi bolumbu elimbolami lokola:
Kokanga foto ya binama ya kobotela ya bana oyo bazali sɔlɔ to sɔlɔ te
Bana mike ya sɔlɔ to sɔlɔ te mutakala, oyo bazali kolakisa:
Binama ya kobotela oyo ezali komɔnana, ata soki ezipami to ekangami na elamba oyo elakisaka kati ya nzoto
Mosomba oyo ezali komɔnana mpe/to bafoto ya bolumbu mobimba ya masɔkɔ
Bana bilenge ya sɔlɔ to sɔlɔ te, oyo bazali kolakisa:
Binama ya kobotela oyo ezali komɔnana (esangisi mpe binama ya kobotela oyo ekangami kaka na nkunza to bilamba oyo elakisaka kati ya nzoto)
Mosomba oyo ezali komɔnana mpe/to bafoto ya bolumbu mobimba ya masɔkɔ
Mabɛlɛ ya mwasi oyo ezipami te
Kozanga elamba uta nkingo kino mabɔlɔngɔ - ata soki binama ya kobotela to mabɛlɛ ya mwasi ezali komɔnana te
Longola soki bililingi ya sɔlɔ te ezali mpo na mikano ya bokɔlɔngɔnɔ to ezali kotalisa bolumbu ya mwana na ndenge ya kosangisa nzoto te na ntɔki ya mokili ya sɔlɔ
Kobebisa bana na kosangisa nzoto te
Bavideo to bafoto oyo ezali kolakisa mbeba ya bana oyo bazali sɔlɔ to sɔlɔ te na ndenge ya kosangisa nzoto te kozanga koyebisa mokano, longola soki bililingi yango euti na ntɔki ya mokili ya sɔlɔ, badessin anime, bafilme to masano ya video
Bakonteni oyo ezali kokumisa, kosunga, kosala promosio, kolobela bolamu ya, kopesa malako to kolendisa na kosangana na mbeba ya mwana na kosangisa nzoto te