Matumboli mpe Mitungisi
Makambo ya sikisiki ya politiki
BONGOLA MOKOMI
Lelo
22 Jan 2025
2 Jul 2024
13 Dec 2023
28 stb 2023
29 yun 2023
30 Mar 2023
26 Jan 2023
29 stb 2022
23 Dec 2021
13 Oct 2021
26 agt 2021
4 mai 2021
2 apl 2021
28 Jan 2021
18 nvb 2020
30 Jul 2020
28 mai 2020
27 fbl 2020
30 Jan 2020
16 Dec 2019
29 stb 2019
30 Jul 2019
1 Jul 2019
26 apl 2019
Ntina ya Politiki
Matumboli mpe mitungisi esalemaka na bisika mingi mpe eyaka na bandenge ebele, kobanda na kosala makambo ya kobangisa mpe kobimisa makambo oyo ekoki kotalisa identité ya moto kino kotinda bamessage ya kobangisa mpe kosala boyokani ya mabe oyo olingi te. Tondimaka te bizaleli ya lolenge oyo mpo ezali kopekisa bato bamɔna ete bazali na bokengi mpe batosami na Facebook, Instagram, mpe Threads.
Tokɛsɛnisaka bato ya lokumu mpe bato mpamba mpo tolingi kopesa nzela na masolo, oyo mingimingi esangisi makanisi ya kotyola bato oyo balobelami na bansango to oyo bazali na audience monɛnɛ. Mpo na bato ya lokumu, tolongolaka bitumba ya makasi mpe misusu oyo wapi moto monɛnɛ atangami na piblikasio to na komantɛre. Tomonaka bato ya lokumu lokola basali ya leta na nivo ya etuka mpe ya ekolo, bato ya poltiki oyo bazali koluka bisila na babiro wana, bato oyo bazali na bafana to balandi koleka miliɔ mɔkɔ na barezo sosio mpe bato oyo balekaka mingi na bansango.
Mpo na bato misusu, libateli na biso ekendaka mosika: Tolongolaka bakonteni oyo esalemi mpo na kotyola to koyokisa nsɔni, kobakisa mpe, na ndakisa, maloba oyo moto alobi na ntina ya makambo ya kosangisa nzoto ya moto. Toyebi ete matumoli mpe mitungisi ekoki kotungisa mingi bana mike, yango wana mibeko na biso epesaka libateli makasi mpo na moto nyɔnsɔ oyo azali na nse ya bambula 18, kozanga kotala stati ya mosaleli.
Kontext mpe mokano ezali na ntina, mpe tondimaka bato bapiblie mpe bakabola yango soki etalisami polele ete elɔkɔ ekabolamaki mpo na kopamela to kobenda bokebi na matumoli mpe mitungisi. Na makambo mosusu, tosengaka komifunda mpo esungaka biso tosɔsɔla ete moto oyo bacible azali koyoka ete bazali kotumola to bazali kotungisa ye. Longola kofunda bizaleli mpe konteni ya ndenge wana, tolendisaka bato basalela baoutil oyo ezali na baplateforme na biso mpo na kosunga bokengi na yango.
Tozali mpe na Esika ya Kopekisa Matumoli, oyo ezali lisungi mpo na bilenge, baboti, mpe balakisi oyo bazali koluka lisungi mpo na makambo oyo etali kotumola mpe matata misusu. Ezali kopesa litambwisi ya litambe na litambe, oyo esangisi mpe bainformation oyo etali ndenge ya kobanda masolo ya motuya na ntina na matumoli bato. Yeba mingi na ntina na oyo tozali kosala mpo na kobatela bato na matumoli mpe mitungisi awa.
Tala: Politiki oyo etali te bato oyo bazali na kati ya bibɔngiseli oyo epɔnami na nse ya Politiki na ntina ya Bato mpe Masanga ya Misala Mabe to bato oyo bakufa liboso ya 1900.
Nivo ya 1: Bobatelami ya molɔngɔ mobimba mpo na moto nyɔnsɔ:
- Moto nyɔnsɔ abatelami esongo na:
- Kontakt oyo alingi te oyo ezali:
- Kosalema mbala na mbala, TO
- Kotungisa na makambo ya kosangisa nzoto, TO
- Etindami mbala mɔkɔ na bato ebele kozanga kotuna liboso.
- Bambela na moto mɔkɔ to etuluku ya bato mpo na komisala mpasi to komiboma.
- Bobundisi kolandaka eksperiansi ya mbeba ya kosangisa nzoto, kosalela na kosangisa nzoto, kotungisa na makambo ya kosangisa nzoto, to konyɔkɔla na ndako.
- Maloba ya mokano ya koyangana na misala ya kosangisa nzoto to kolendisa na koyangana na misala ya kosangisa nzoto.
- Komantɛre makasi oyo epɔni kimwasi to kimobali.
- Photoshop to mayemi oyo etalisi kimwasi to kimobali na ndenge ya malamu te
- Bobundisi na nzela ya maloba ya kotyola oyo etali makambo ya kosangisa nzoto (na ndakisa, mwasi ya ndumba, mwasi ya pitÉ›).
- Maloba oyo ezali kowangana ete likambo ya nsɔmɔ esalemi.
- Koloba ete bato bazali kokosa na ntina ya kozala moto oyo azwi mpasi na likambo ya nsɔmɔ to na bobundisi ya bateroriste, oyo esangisi mpe koloba ete bazali:
- Kosala lokola bazwi mpasi na evenema mɔkɔ boye, to
- Bafutami to bapesi bango mosala mpo na kokosa bato na ntina ya mokumba na bango na evenema.
- Kobangisa kolakisa nimero ya telefone ya moto ye mɔkɔ, esika afandaka, adrɛsi email to mokanda ya monganga (ndenge elimbolami na Politiki ya Kobuka Mibeko ya Bosekele).
- Bambela mpo na, to maloba oyo etalisi mokano ya koyangana na, matumoli mpe/to mitungisi.
- Bakonteni oyo ezali kobebisa to kotalisa kozanga bosepeli na bato oyo batalisama na mosala ya, to kaka na nsima ya, komɔna makila, kosuba, kosanza, to kosumba
- Moto nyɔnsɔ abatelami na makambo oyo elandi, kasi mpo na bato minɛnɛ oyo bazali mikolo, esengeli batyama na boyebi nyɔnsɔ na:
- Bambela mpo na liwa mpe maloba ya kosepela na kozwa bokɔnɔ to kozala na mokakatano ya bokɔlɔngɔnɔ.
- Kosepela to kosɛka liwa to mokakatano ya bokɔlɔngɔnɔ.
- Maloba na ntina ya bokɔnɔ oyo ekabolamaka na kosangisa nzoto.
- Maloba ya kokitisa na ntina ya lolenge ya nzoto.
Nivo ya 2: Libateli ya kobakisa mpo na Bana Mike nyɔnsɔ, Bato Mikolo mpe Bato Minɛnɛ oyo Lokumu Ezali na Ndelo (na ndakisa, bato oyo lokumu na bango esuki na makambo oyo basalaka, na bopanzi nsango, to baoyo bazwaka lokumu na banzela oyo balingaki te):
- Na kobakisa na libateli oyo epesami na bato nyɔnsɔ, bana mike nyɔnsɔ (bato mpe bato minɛnɛ), bato mikolo mpe bato minɛnɛ oyo lokumu ezali na ndelo babatelami na:
- Maloba na ntina ya makambo ya kosangisa nzoto, longola soki ezali na kontext ya kofunda mabe oyo basali na mikolo (kosimba na ndenge ya kosangisa oyo ezangi boyokani).
- Bakonteni oyo ezali komɔna moto mosusu na ndenge ya kosangisa nzoto (komɔna bana mike na ndenge ya kosangisa nzoto elobelami na Politiki oyo etali Kosalela Bana na Kosangisa Nzoto, Konyɔkɔla mpe Bolumbu na Bango).
- Bana mike nyɔnsɔ (bato mpe bato minɛnɛ), bato mikolo mpe bato minɛnɛ oyo lokumu ezali na ndelo babatelami na makambo oyo elandi, kasi mpo na bato minɛnɛ oyo bazali bana mike, esengeli batyama na boyebi nyɔnsɔ na:
- Bokokanisi ya kolongola bomoto (na lolenge ya kokoma to ya komɔna) na to na ntina ya:
- Banyama mpe banyama-nkɛnkɛ, kobakisa mpe bikelamu oyo ezali na nse ya bato, oyo bamɔnaka lokola ezali na nse.
- Babakteri, bavirisi, bamikrobe, mpe makɔnɔ.
- Bilɔkɔ oyo eninganaka te, oyo esangisi mpe salite, bosɔtɔ, mbindo ya twalɛti.
- Bakonteni oyo babongoli yango mpo na kotya langi na makomi, kozinga makomi, to mpo na kobenda likebi na ndenge ya mabe na bakarakteristiki ya nzoto ya sikisiki (zolo, litoyi, mpe bongo na bongo).
- Bakonteni oyo etyaka bango na molɔngɔ na kolandaka lolenge ya nzoto to bizaleli.
- Bakonteni oyo ezali kokitisa bato oyo batalisami ete bazali kotungisa bango (longola na bakontext ya masano ya bitumba).
Nivo ya 3: Libateli ya kobakisa mpo na Bana Mike, Bato Mikolo, mpe Bana Mike oyo Bazwi Lokumu oyo Balingaki te:
- Na kobakisa na libateli oyo ezali na likolo, bana mike nyɔnsɔ, bato mikolo (oyo asengeli komifunda), mpe bana mike oyo bazwi lokumu oyo balingaki te babatelami na:
- Kofinga oyo epɔni bato.
- Maloba oyo etali komipesa na bolingo, komimɔna lokola mwasi to mobali to identité ya kimwasi to kimobali.
- Bambela ya kosala likambo, maloba ya mokano, maloba ya kotalisa mposa to lolenge ya kozala, to maloba oyo ezali kolendisa to kopesa lisungi na kobengana.
- Bizaleli ya mabe to maloba ya kotalisa makoki, kolongola na kontext ya kofunda mabe oyo basali mpe bitaleli ya mombongo esongo na mikolo.
- Maloba ya kotyola, ya komɔna na ndenge ya mabe, to bakonteni oyo ezali koboya bozalisi ya moto, longola na kontext ya bifundeli ya kosala mabe contre mikolo.
- Ntango moto amifundi, bana mike, mikolo, mpe bana mike oyo bazwi lokumu oyo balingaki babatelami na:
- Mitungisi ya kosalela pronom ya yambo.
- Bililingi oyo babongoli oyo moto alingi te.
- Kokokanisa na bato minɛnɛ, bato ya makanisi to bato misusu kolandaka lolenge ya nzoto.
- Maloba na ntina ya identité ya losambo to kofinga Nzambe
- Kokokanisa na banyama to banyama-nkɛnkɛ oyo bamɔnaka yango te lokola ezali na nse na kotalaka mayɛlɛ to makasi na nzoto ("tigre", "nkosi").
- Bandimbola ya malamu to oyo eboyi kopɔna ya lolenge ya nzoto.
- Bizaleli ya mabe te to maloba ya kotalisa makoki.
- Bobundisi na nzela ya maloba ya kotyola oyo etali kozanga kosangisa nzoto.
Nivo ya 4: Libateli ya kobakisa kaka mpo na Bana Mike:
- Bana Mike bazali na libateli ya koleka na mobeko na biso. Na kobakisa na libateli nyɔnsɔ oyo ezali na likolo, bana mike babatelami mpe na:
- Maloba oyo ezali kofunda bizaleli ya mabe to oyo elandi mobeko te.
- Bavideo ya bana oyo bazali kobɛtama, oyo ekabolami na bacontexte nyɔnsɔ.
- Maloba ya kotyola oyo etali kofinga basi.
Kotumola mpe kotungisa na nzela ya bapage, bituluku, milulu mpe bamessage
- Libateli ya Banivo ya 1 kino 4 ekosalelama mpe na bapage, bituluku, milulu mpe bamessage.
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bainformation mpe/to makambo misusu mpo na kotosisa mibeko:
Koluka te:
- Kopiblie bakonteni oyo ezali kopɔna bato na nzela ya Bapage, Bituluku mpe Milulu oyo elingami te. Tolongolaka bakonteni yango soki moto oyo yango epɔni to momonisi na ye oyo azali na ndingisa afundi yango.
- Kopiblie bakonteni oyo elimbolami likolo oyo ekoki kosenga ete moto oyo yango epɔni afunda yango to na esika wapi konteni yango etalisi ete piblikatɛre azali kotanga moto mbala mɔkɔ (na ndakisa: moto atangami na piblikasio to komantɛre). Tokolongola bakonteni yango soki tozwi bondimisi euti na moto oyo yango epɔni to momonisi na ye oyo azali na ndingisa (ya bomɔi to ya kokufa) ete konteni yango elingami te.
- Kopiblie bakonteni oyo ezali kobenga mpo na to kotanga mokano ya komipesa na bizaleli oyo ekoki komɔnana lokola kotumola to kotungisa na nse ya mibeko na biso. Tokolongola bakonteni yango soki tozwi bondimisi euti na moto oyo yango epɔni to momonisi na ye oyo azali na ndingisa ete konteni yango elingami te.
- Kopiblie bakonteni oyo ezali komɔna moto monɛnɛ na ndenge ya kosangisa nzoto. Tokolongola bakonteni yango soki tozwi bondimisi euti na moto oyo yango epɔni to momonisi na ye oyo azali na ndingisa ete konteni yango elingami te.
- Kobanda kontakt oyo ezali kotungisa moyambi na kotalaka kimwasi to kimobali. Tokolongola konteni nyɔnsɔ oyo ekabolami na kontext oyo elingami te soki tozwi bondimisi euti na moyambi, to momonisi na ye oyo azali na ndingisa ete kontakt yango elingami te.
- Kolongola mitungisi oyo epɔni bato ebele, ntango:
- Ezali kopɔna, na esika nyɔnsɔ, 'bato oyo bazali na likama makasi ya mobulu libanda ya internet', oyo elimbolami lokola:
- Babateli ya balotomo ya bato
- Bana mike
- Bato oyo bazwi likama ya milulu/mawa ya mobulu
- Bato ya ngambo ya botelemeli oyo bazali na bikolo ya likama na ntango ya mapɔnami
- Bakonzi ya mapɔnami
- Batelemeli ya guvernema oyo bapɔnamaki kolandaka stati na bango ya botelemeli
- Bato ya balokota mpe mangomba oyo bazali mingi te na bisika oyo bitumba ezali
- Basangani ya etuluku mɔkɔ boye oyo eyebani ete ezali na likama
- Kopɔna moto nyɔnsɔ na nzela ya bisika oyo ezali ya moto ye mɔkɔ, lokola messagerie to baprofil, na:
- Bakonteni oyo ezali kobuka mibeko oyo etali matumoli mpe mitungisi mpo na bato to,
- Bakonteni oyo bakoki kotya ntembe oyo etali karakteristiki oyo ebatelami na mobeko
- Kokanga bakonti oyo emipesi na mitungisi ya bato ebele lokola mɔkɔ ya
- Barezo ya bikolo to ekolo oyo esangani, oyo ezali kopɔna bato na nzela ya bisika nyɔnsɔ.
- Barezo ya botelemeli oyo ezali kopɔna bato na nzela ya bisika nyɔnsɔ oyo ezali na:
- Bakonteni oyo ezali kobuka mibeko oyo etali matumoli mpe mitungisi mpo na bato to,
- Bakonteni oyo ezali kopɔna bango kolandaka karakteristiki oyo ebatelami na mobeko, to,
- Bakonteni to bizaleli oyo emɔnani ete ezali malamu te na kontext ya mboka
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Badone
Mɔna Lapɔlɔ ya Bolandi Mibeko ya Lisanga oyo euti kobima
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya kotumbola mpe kotungisa bato
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi