Kotalisa Identité ya Sɔlɔ

Makambo ya sikisiki ya politiki

BONGOLA MOKOMI
Ntina ya Politiki
Bosolo ezali mobɔku ya lisanga na biso. Tondimaka ete bosolo esungaka na kokela lisanga mɔkɔ oyo wapi bato bazali na motuya mɔkɔ epai ya mosusu, mpe epai ya Meta, na bandenge ya ntina. Tolingi kopesa nzela na lolenge mingi ya banzela ndenge na ndenge oyo bomoto etalisamaka na kati ya lisanga na biso na mokili mobimba, ntango tozali kopekisa kokosa identité mpe kotalisa identité na ndenge ya mabe. Mpo na kobatela esika ya libateli mpe ya polele epai bato bakoki kotyelana motema mpe kotonga lisanga, tozali kopesa nzela te na kosala bakonti to baprofil oyo efungolami to esalelami mpo na kokosa basusu.
Na Facebook, tosengaka bato bafungola konti mɔkɔ na kosalelaka nkombo oyo bayebi bango na bomɔi ya sɔlɔ oyo ezali kotalisa identité na bango ya sɔlɔ. Tofungolaki Baprofil Misusu mpo na kosunga bato batalisa biteni misusu ya identité na bango, lokola makambo oyo basepelaka na yango to bakompanyi na bango.
Topekisaka kosalela baservice na biso mpe tokotya bipekiseli to tokokata bosali ya bakonti Facebook, Instagram mpe Threads to bibɔngiseli misusu ya Facebook (lokola Bapage, Bituluku) oyo:
  • Ezali ya bana mike
  • Kokosa kozala moto mosusu to kompani na:
    • Kosalela (bi)elilingi, nkombo to bozali na bango mpo na kokosa bato misusu
    • Koloba maloba lokola moto to ebongiseli mosusu oyo mosaleli azali na ndingisa te ya kosala yango (e.g. na kofungola Page to Profil)
  • Ezali komipesa na boyebi ya kotalisa identité na ndenge ya mabe mpo na komema bato na nzela ya mabe to kokosa bato, kokima botosisi ya mibeko, to kobuka Mibeko na biso ya Lisanga. Totalaka mwa makambo mingi ntango totalelaka kotalisa identité na ndenge ya lokuta, lokola:
    • Bambongwana ya mbala na mbala to ya motuya na badetail ya identité, lokola nkombo to bambula
    • Bainformation ya profil oyo ezali kokosa, lokola badetail ya bio mpe esika ya profil
    • Kosalela bililingi ya stock
  • Ezali kosalela nkombo oyo ezali na makambo oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Na Facebook, tokoluka bainformation misusu liboso ya kosala likambo kobanda na kotya epekiseli mpo na mwa ntango tii na kokanga libela baprofil to bakonti soki:
  • Opesi mokɔlɔ ya mbotama ya lokuta.
  • Osaleli nkombo oyo ezali nkombo na yo ya sɔlɔ te oyo bato babengaka yo na yango na bomɔi ya mikɔlɔ nyɔnsɔ
  • Ofungoli konti mɔkɔ oyo etalisi to esalelami na bato koleka mɔkɔ.
  • Ofungoli to obateki bakonti Facebook mingi
  • Ofungoli konti oyo ezali kotalisa ebɔngiseli ya sɔlɔ te, lokola mombongɔ, nyama ya ndako, to moto ya fiksio
  • Kozala na profil oyo ezangi elɔkɔ na kati mpe eumeli kozanga basalela yango
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na kotalisa identité na ndenge ya sɔlɔ
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi