Bolumbu ya Mikolo mpe Makambo ya Kosangisa Nzoto
Makambo ya sikisiki ya politiki
BONGOLA MOKOMI
Lelo
28 agt 2025
26 yun 2025
14 mai 2025
17 stb 2024
29 agt 2024
25 Jul 2024
1 mai 2024
29 fbl 2024
29 stb 2022
28 apl 2022
23 Dec 2021
24 nvb 2021
26 agt 2021
19 nvb 2020
20 Mar 2019
15 Oct 2018
27 Jul 2018
29 yun 2018
25 mai 2018
Ntina ya Politiki
Totyaka bipekiseli na kolakisa bolumbu to makambo ya kosangisa nzoto mpo bato misusu na lisanga na biso bakoki kotungisama na bakonteni ya lolenge wana, mingimingi mpo na bonkoko to bambula na bango.
Toyebi ete bakonteni ya bolumbu ekoki kokabolama mpo na bantina ebele, lokola mpe lolenge ya kotelemela, ya kotombola boyebi na ntina ya likambo ya motuya, to mpo na bantina ya mateya to ya bokɔlɔngɔnɔ. Esika oyo esengeli mpe mokano oyo mokano ya bongo emɔnisami polele, topesaka nzela na konteni yango. Na ndakisa, atako totyaka bipekiseli na bililingi misusu ya mabɛlɛ ya basi oyo elakisi mbuma ya libɛlɛ, tondimaka bililingi misusu, kobakisa mpe oyo ezali kolakisa makambo ya botelemeli, basi oyo bazali komɛlisa bana mabɛlɛ mpe bafoto ya bampota nsima ya lipaso ya mabɛlɛ (ntango mosusu etyamaka ekran ya likebisi ya kolakisa ete makambo ekoki kotungisa mpe ezalaka na bipekiseli ya bambula). Topesaka mpe nzela na ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa bolumbu lokola bafoto ya mayemi ya langi, mayemi na banzete, etc (ntango mosusu etyamaka ekran ya likebisi ya kolakisa ete makambo ekoki kotungisa mpe ezalaka na bipekiseli ya bambula). Na yambo tolongolaka bililingi ya kosangisa nzoto mpo na kopekisa kokabola bakonteni oyo bato bapesi bondimi na bango te to ya bana-mike.
Na politiki oyo, tolongolaka bafoto mpe bavideo ya sɔlɔ ya bolumbu mpe ya kosangisa nzoto, bililingi oyo esalemi na AI to na ordinatɛre ya bolumbu mpe ya kosangisa nzoto, mpe bililingi ya nimero, ata soki ezali komɔnana “lokola sɔlɔ” (lokola, ezali lokola ya moto ya sɔlɔ). Ndenge tomɔni yango likolo, topesaka mpe mwa nzela ya bokebi mpo na art ya mokili ya sɔlɔ mpe makambo misusu ya bonganga, ya mateya, mpe ya koyebisa bato makambo ya koyeba, mpe yango elobelami na bozindo na politiki.
Bakonteni oyo etali bolumbu ya bana epesami eyano na kati ya Mibeko na biso ya Lisanga na Kosalela Bana na Kosangisa Nzoto, Konyɔkɔla mpe Bolubu na Bango.
Topesaka nzela te na bakonteni oyo elandi mpo na basaleli nyɔnsɔ:
Bolumbu ya Mikolo
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ ya bolumbu ya mikolo, soki ezali kolakisa:
- Binama ya kobotela oyo ezali komɔnana (esangisi oyo ekangami kaka na nkunza to bizipeli ya digital)
- Libulu ya masɔkɔ oyo ezali komɔnana mpe/to bafoto ya pɛmbɛni oyo ezali kolakisa masɔkɔ
- Mabɛlɛ ya basi oyo ezali komɔnana, longola soki ezali na contexte ya komɛlisa mwana to ya botelemeli
- Bavideo ya digital to oyo ezali lokola sɔlɔ, oyo ezali kolakisa kosangisama ya nzoto, mabɛlɛ ya basi, to masɔkɔ oyo enregistrema esalemi kozanga ete bato yango bayeba
- Yeba ete na mwa bipekiseli, tokoki kondima kolakisa bililingi ya bolumbu ya mikolo na bacontexte misusu ya sikisiki, lokola bacontexte ya monganga to ya bokɔlɔngɔnɔ. Yango elobelami na bozindo na biteni oyo ezali na nse.
Makambo ya Mikolo ya Kosangisa Nzoto
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola ezali sɔlɔ ya makambo ya mikolo ya kosangisa nzoto, oyo esangisi:
- Makambo ya kosangisa nzoto to koluka kozwa mposa ya kosangisa nzoto oyo ezali polele:
- Kosangisa nzoto ya polele na binama ya kobotela to na monɔkɔ, oyo elimbolami lokola monɔkɔ to binama ya kobotela ya moto ezali kokɔta to kokutana na binama ya kobotela to mosomba ya moto mosusu, to binama ya kobotela oyo etyami likolo to na kati ya bajouet ya kosangisa nzoto, ntango ata mɔkɔ ya binama ya moto to mosomba ezali komɔnana
- Koluka kopesa binama ya kobotela to mosomba ya moto mposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya polele, oyo etalisami lokola kopesa mposa, to kotya bajouet ya kosangisa nzoto na kati ya binama ya kobotela to mosomba ya moto, esika wapi bokutani na binama ya kobotela to mosomba ezali komɔnana.
- Makambo ya kosangisa nzoto to koluka kozwa mposa ya kosangisa nzoto oyo etalisami polele te:
- Kosangisa ya nzoto na moto na ndenge ya polele na binama ya kobotela to na monɔkɔ, oyo elimbolami lokola lolenge monɔkɔ to binama ya kobotela ya moto ekutani na binama ya kobotela to mosomba ya moto mosusu, soki binama ya kobotela to mosomba mpe/to bosangisi to bokutani na yango ezali komɔnana te.
- Koluka kopesa binama ya kobotela to mosomba ya moto mposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya polele, oyo etalisami lokola kopesa mposa, to kotya bajouet ya kosangisa nzoto na likolo to kotya bajouet ya kosangisa nzoto na kati ya binama ya kobotela to mosomba ya moto, to kotya binama ya kobotela likolo to na kati ya jouet ya kosangisa nzoto, ntango kopesa binama ya kobotela to mosomba mposa, kotya, mpe/to kokɔtisa ezali mbala mɔkɔ komɔnana te.
- Mosala ya kosangisa nzoto oyo ekosalema kala te, ndenge etalisami na balolenge oyo ezali kolakisa ete kosangisama ya nzoto ekomi kobanda kati ya mabɔkɔ, monɔkɔ to binama ya kobotela ya moto mɔkɔ na binama to mosomba ya moto mosusu.
- Makambo misusu ya kosangisa nzoto to koluka kozwa mposa ya kosangisa nzoto:
- Kotelema ya nzoto ya mobali
- Bozali ya baproduit mike ya kosangisa nzoto
- Bajouet ya kosangisa nzoto oyo etyamaka likolo to na kati ya monɔkɔ.
- Kosimbasimba bambuma ya mabɛlɛ ya bato oyo ezali komonana mpo na kopesa mposa ya kosangisa nzoto.
- Kofinafina mabɛlɛ ya mwasi, elimbolami lokola muvema ya kosimba na misapi na ndenge ya kosimba oyo ezali kolakisa bilembo mpe bongwana ya polele ya lolenge ya mabɛlɛ. Tondimaka kofina mabɛlɛ soki ezali na contexte ya komɛlisa mwana libɛlɛ.
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ to ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa nkisi ya bonganga oyo ezali na makambo oyo elandi:
- Makambo oyo ekoki komema na liwa ya moto to ya nyama.
- Kokata biteni ya nzoto.
- Kolya misuni ya nzoto ya bato.
- Mbindo ya twalɛti, masuba, kobwaka nsɔi, kobwaka miyoyo, komɔna makila to kosanza.
- Kosangisa nzoto na banyama.
- Kosangisa nzoto na ndeko ya libota
- BDSM (kokanga mpe kopesa mitindo, kokonza mpe kotosa, kosepela na kopesa mpasi mpe na kozwa mpasi), kaka soki ezali mpe na bilembo ya kosangisa nzoto
- Bililingi oyo ezali lokola ya sɔlɔ ya makambo ya kosangisa nzoto polele to kopesa mposa ya kosangisa nzoto na contexte ya monganga to ya bokɔlɔngɔnɔ
- Audio ya molai ya makambo ya kosangisa nzoto
- Yeba ete na mwa bipekiseli, tokoki kopesa nzela na bililingi oyo ezali kolakisa makambo ya kosangisa nzoto na bacontexte ya sikisiki, lokola ya monganga to bokɔlɔngɔnɔ. Yango elobelami na bozindo na biteni oyo ezali na nse.
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka yango bipekiseli mpo emɔnana kaka na basaleli ya bambula 18 mpe koleka, mpe totyaka elembo mpo bato bayeba ete konteni yango ekoki kotungisa:
- Bililingi ya digital mpe ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa polele makambo ya kosangisa nzoto to kopesa mposa ya kosangisa nzoto na contexte ya monganga to bokɔlɔngɔnɔ
- Bililingi oyo ezali lokola ya sɔlɔ/ ya digital mpe ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa na ndenge ya kobombana makambo misusu ya kosangisa nzoto to kopesa mposa ya kosangisa nzoto na contexte ya monganga to bokɔlɔngɔnɔ
- Bililingi oyo ezali lokola ya sɔlɔ/digital mpe ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa binama ya kobotela, libulu ya masɔkɔ oyo ezali komɔnana, bililingi minɛnɛ ya masɔkɔ to mabɛlɛ ya basi oyo ezali komɔnana na contexte ya lipaso ya kondimisa kimwasi to kimobali
- Ntɔki ya mokili ya sɔlɔ ya binama ya kobotela oyo ezali komɔnana (esangisi mpe binama oyo ezipami na ezipeli ya digital to mwa molili mpe binama oyo ezipami kaka na nkunza), libulu ya masɔkɔ oyo ezali komɔnana, bililingi minɛnɛ ya masɔkɔ to mabɛlɛ ya basi oyo ezali komɔnana, esika wapi mokano ya elilingi ezali kolakisa bolumbu kasi te na contexte ya bokɔlɔngɔnɔ
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ ya binama ya kobotela oyo ezali komɔnana (esangisi mpe binama oyo ezipami na ezipeli ya digital to mwa molili mpe binama oyo ezipami na nkunza), bililingi minɛnɛ ya masɔkɔ, libulu ya masɔkɔ to mabɛlɛ oyo ezali komɔnana, soki ekabolami na contexte ya nzala, kobomama ya bato, bambeba ya bitumba, to bambeba esongo na bato
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka ndelo na makoki ya komɔna bakonteni yango kaka na mikolo oyo bazali na bambula 18 mpe koleka:
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ, oyo ezali kolakisa pɛnɛ na bolumbu lokola bolumbu oyo ezipami kaka na ezipeli ya digital to elɔkɔ oyo elakisaka nsima na yango te mpe bisika misusu oyo bolumbu ezipami na mwa molili ya bilamba oyo elakisaka kati ya nzoto
- Bililingi oyo ezali lokola bosɔlɔ/ya digital ya bato, esika wapi katikati ya makolo, masɔkɔ to mabɛlɛ ya basi ezali esika oyo elilingi ezali kolakisa liboso
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ mpe ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa polele to na kobombana makambo misusu ya kosangisa nzoto to kopesa mposa ya kosangisa nzoto soki kaka lolenge to elili ya nzoto ezali komɔnana
- Ntɔki ya mokili ya sɔlɔ, esika wapi
- Bililingi ezali kolakisa misala ya kosangisa nzoto to kopesa mposa ya kosangisa nzoto, na ndenge ya kobombana to ya polele, longola se soki etyamaki na contexte ya monganga to bokɔlɔngɔnɔ
- Bililingi ezali kolakisa kosangisa nzoto na banyama, soki ekabolami kozanga kopɔna ngambo to mpo na kokweyisa likambo yango mpe bato to banyama oyo balakisami bazali ya sɔlɔ te.
- Bililingi oyo eyebani ete ezali mpenza ya sɔlɔ te oyo ezali kolakisa na ndenge ya kobombana. makambo misusu ya kosangisa nzoto to kopesa mposa ya kosangisa nzoto
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ mpe ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa:
- Makambo oyo etali kosangisa nzoto lokola kopesana babeze na lolemu oyo ezali komɔnana mpe mabina oyo epesaka mposa ya kosangisa nzoto
- Bato oyo bazali kosala lokola bazali kosangisa nzoto
- Bilembo oyo ezali ndimbola ya binama ya kobotela, kosimbasimba binama, kosangisa nzoto na monɔkɔ, to kosangisa nzoto na moto
- Balogo, bakaptire ya ekran to baklip ya video ya basite internet oyo eyebani na pornografi
- Bakonteni oyo ezali na audio ya makambo ya kosangisa nzoto
Mpo na bakonteni oyo elandi, totyaka elembo mpo bato bayeba ete konteni yango ekoki kotungisa:
- Bililingi ya digital oyo ezali lokola sɔlɔ mpe ntɔki ya mokili ya sɔlɔ oyo ezali kolakisa:
- Binama ya kobotela oyo ezali komɔnana (esangisi mpe binama oyo ezipami na ezipeli ya digital to mwa molili mpe binama oyo ezipami na nkunza), bililingi minɛnɛ ya masɔkɔ to libulu ya masɔkɔ oyo ezali komɔnana, soki ekabolami na contexte ya. monganga to bokɔlɔngɔnɔ. Ekoki kosangisa, na ndakisa:
- Kobota mpe bantango ya nsima ya kobota
- Kotalela binama mpo na koyeba soki ozali na cancer to bokɔnɔ mosusu
- Mabɛlɛ ya basi oyo ezali komɔnana, soki ekabolami na contexte ya monganga to bokɔlɔngɔnɔ (esangisi mpe batatouage ya lipaso ya mabɛlɛ to kobika na cancer)
Mpo na Mibeko ya Lisanga oyo elandi, tosengaka bainformation mpe/to makambo misusu mpo na kotosisa mibeko:
- Na makambo misusu, topesaka nzela na bakonteni ya bato ya bambula 18 mpe koleka na elembo oyo ntango mosusu ekoki kobuka Mibeko ya Lisanga soki etalisami ete konteni yango ezali ya lisɛki. Konteni ekopesama ndingisa kaka soki bilɔkɔ oyo ezali kobuka mibeko na konteni yango ezali komɔnana lokola lisɛki to epesami na elɔkɔ to moto mosusu mpo na kosɛkisa to kopamela yango.
Baeksperiansi ya basaleli
Tala mwa bandakisa ya ndenge nini kotosisa mibeko ezalaka mpo na bato na Facebook, lokola: ndenge ezali komɔnana ntango ya kofunda likambo oyo okanisi ete esengeli te kozala na Facebook, koyebisa yo ete obuki Mibeko na biso ya Lisanga mpe komɔna likebisi ya ekran likolo ya bakonteni misusu.
Tala: Tozali kobɔngisaka makambo ntango nyɔnsɔ, yango wana makambo oyo ozali komɔna awa ekoki kosila ngala mwa moke soki okokanisi yango na oyo tozali kosalela sikoyo.
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Kofunda
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Masolo sima ya kosala lapɔlɔ
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Eksperiansi ya bolongoli
EKSPERIANSI YA MOSALELI
Baekran ya likebisi
Badone
Mɔna Lapɔlɔ ya Bolandi Mibeko ya Lisanga oyo euti kobima
Kotosisa Mibeko
Bapolitiki na biso ezali kaka ndenge mɔkɔ na mokili mobimba, mpo na bato nyɔnsɔ na Facebook.
Baekipi ya botali
Ekipi na biso ya mokili mobimba ya batali koleka 15.000 esalaka mikɔlɔ nyɔnsɔ mpo bato bazala na bokengi Facebook.
Boyangani ya bapartie prenante
Banganga-mayɛlɛ ya libanda, bato ya eteyelo enɛnɛ, Masanga oyo Elukaka Matomba Te mpe bato oyo bakelaka mibeko, basungaka mpo na kopesa nsango na Mibeko ya Lisanga ya Facebook.
Zwa lisungi na ntina ya bolumbu ya mikolo mpe makambo ya kosangisa nzoto
Yeba nini okoki kosala soki omɔni elɔkɔ mɔkɔ na Facebook oyo ezali kobuka Mibeko na biso ya Lisanga.
Kende na Esika na biso ya Lisungi