Mibeko ya Lisanga
Maloba ya liboso
Mibeko oyo euti na makanisi oyo bato bakabola mpe toli ya baexpert na makambo lokola teknolozi, bokengi ya bato mpe ntomo ya bato. Mpo na kosala ete mongongo ya moto nyɔnsɔ ezala na motuya, tosalaka nyɔnsɔ mpo na kokela mibeko oyo esangisaka makanisi mpe bindimeli oyo ekeseni, mingi mingi oyo euti epai ya bato mpe masanga oyo bato bakoki kozanga kopesa bango ntina to kotya bango na mopanzi.
Mikolo nyɔnsɔ, bato basalelaka Facebook, Instagram, Messenger mpe Threads mpo na kokabola baeksperiansi na bango, kokɔta na boyokani na baninga mpe libota, mpe kotonga bituluku. Baservice na biso ezali kopesa bamiliyo ya bato epusa ya kokabola makanisi na bango na bonsɔmi nyɔnsɔ na mikili mpe mimɛsɛno ya ndenge na ndenge mpe na balokota ebele.
Meta eyebi ntina ya oyo esengeli ete Facebook, Instagram, Messenger mpe Threads ezala bisika oyo bato bamɔni ete bapesi bango mpenza makoki ya kosolola, mpe tozwaka na lisɛki te mokumba na biso ya kosala ete mabe etikala libanda ya service yango. Yango wana tosalaki mibeko ya makambo oyo endimami mpe oyo endimami te na baservice yango.
Tosengi yo oyeba ete Mibeko ya Lisanga oyo ekomami na Anglais ya Etats-Unis ezali kolakisa liboke ya bapolitiki oyo euti kobima sika mpe esengeli esalelama lokola mokanda ya liboso.
Komipesa na biso na mongongo
Mokano ya Mibeko na biso ya Lisanga ezali ya kokela esika ya koloba mpe kopesa bato mongongo. Meta elingi ete bato bakoka kolobela polele makambo oyo ezali na ntina mpo na bango, ezala na nzela ya bakomantɛre, bafoto, miziki, to mayele mosusu ya ntɔki, ata soki bato misusu bandimi na yango te to bamɔni ete ezali ya maloba ya mabe. Na ntango mosusu, tondimaka konteni —oyo ntango mosusu ekokaki kokesenisa na mibeko na biso —soki ezali ntina mpo na bansango mpe mpo na bolamu ya bato nyɔnsɔ. Tosalaka yango kaka sima ya kotala motuya ya intérêt pibliki na likama ya mbeba, mpe totalaka mibeko ya mokili mobimba ya ntomo ya bato mpo na kozua bikateli wana. Na ntango mosusu, tokoki kolongola konteni oyo ezali kolobela na banzela mibale to oyo ezali koloba makambo ya mabe ntango contexte mosusu epesi biso nzela ya kososola malamu ete makambo oyo ezali ezali kobuka mibeko na biso.
Komipesa na biso mpo na koloba ezali na ntina mingi, kasi toyebi ete internet ekeli mabaku ya sika mpe oyo ebakisami mpo na kosalela mabe. Na yango na bantina oyo, ntango tozali kopekisa koloba, tosalaka yango mpo na kosalela moko to mingi ya motuya oyo elandi:
BOSƆLƆ
Tolingi kosala ete bakonteni oyo bato bamɔnaka ezala ya sɔlɔ. Tondimaka ete bosɔlɔ esalaka esika mɔkɔ ya malamu mpo na kokabola, mpe yango wana tolingi te bato oyo basalelaka baservice na biso mpo na kotalisa nani bazali to nini bazali kosala na ndenge ya mabe.
BOKENGI
Tomipesa na kosala ete Facebook, Instagram, Messenger mpe Threads ezala bisika ya bobatelami. Tolongolaka makambo oyo ekoki komema likama ya kobebisa libateli ya nzoto ya bato. Bakonteni oyo etungisaka bato ezali na makoki ya kobangisa, kobengana to kopekisa bato misusu baloba mpe endimisami te na Facebook.
BOSEKELE
Tomipesa na kobatela bosekele mpe bainformation ya bato. Bosekele epesaka bato bonsɔmi ya kozala bango mɔkɔ, ya kopɔna lolenge mpe ntango ya kokabola na Facebook mpe kokɔta na boyokani na ndenge ya pɛtɛ koleka.
LOKUMU
Tondimi ete bato nyɔnsɔ bakokani na lokumu mpe na lotomo. Tozali kozela ete bato bakomemya lokumu ya basusu mpe bakotungisa bato mosusu te to bakokitisa bato mosusu te.
Mibeko ya Lisanga
Mibeko na biso ya Lisanga etali moto nyɔnsɔ, na mokili mobimba, mpe mpo na lolenge nyɔnsɔ ya makambo, bakisa mpe makambo oyo esalemi na AI.
Eteni mɔkɔ na mɔkɔ ya Mibeko na biso ya Lisanga ebandi na “Ntina ya Politiki” oyo elakisaka mikano ya politiki oyo elandi mpe na milɔngɔ ya politiki ya sikisiki oyo ezali kolobela:
Bakonteni oyo endimami te; mpe
Bakonteni oyo esengaka contexte to makambo misusu mpo na kosalela yango, bakonteni oyo endimami na likebisi na ekran to bakonteni oyo endimami kasi ekoki kotalama kaka na mikolo ya bambula 18 mpe koleka.