Kosunga Bilenge Bamɔna Bakonteni oyo Ebongi Mpo na Mbula
EBONGISAMI 4 MAI 2026
Tolingi ete bilenge bazala na eksperiansi ya libateli mpe ya malamu na Facebook mpe na Instagram, oyo esangisi kosunga bango baluka makambo oyo esepelisaka bango ntango tozali kolakisa bango bakonteni oyo ebongi mpo na mbula na bango. Tosalaka mpo na kobatela bilenge liboso ya komɔna bakonteni oyo ezali malamu te mpo na bango na balolenge misato: kolongola konteni mobimba ntango ezali kobuka mibeko na biso, kobomba balolenge misusu ya bakonteni ya mikolo to ya sensible liboso ya bilenge, mpe kozala na ndelo ya makasi oyo topesaka toli.
Tozali kokolisaka ntango nyɔnsɔ etamboli na biso ya kosunga mpo na kosala nyɔnsɔ ete tozali kopesa bilenge eksperiansi ya libateli, oyo ekoki mpo na mbula, mpe kotya bolukiluki ya malamu koleka mpe batoli ya bato oyo bayebi mosala malamu mpo na komema baboti kimya ya makanisi. Tolingaki mpe tozala na boyokani makasi koleka na mibeko misusu oyo mabota basili koyeba malamu, yango wana totalelaki malako na biso na ntina ya bambula oyo ekoki - malako oyo elobaka bakonteni nini tolakisaka na bilenge te mpe tokimaka kopesela bango yango na toli - liboso ya note ya bafilm mpo na baye ya bambula 13+ mpe biyano ya baboti. Elingi koloba ete mokano na biso ezali ete bilenge bamɔna bakonteni na Instagram mpe na Facebook oyo ezali ndenge mɔkɔ na oyo bamɔnaka na film oyo ebongi mpo na mbula, na ndenge ezali.
Kaka ndenge okoki komɔna bakonteni oyo epesaka makanisi to maloba ya makasi na film oyo elobami ete ebɔngi mpo na bato ya bamubla 13+, bilenge bakoki mwa ntango na ntango komɔna elɔkɔ ya bongo na Instagram to/mpe na Facebook - kasi tokokoba kosala nyɔnsɔ oyo tokoki mpo na kosala ete esalemaka mingi te. Toyebi mpenza ete ata sistɛme mɔkɔ te oyo ezangi nkɔnkɔsɔ, mpe tomipesa mpo na kobongisa yango na ndenge mikɔlɔ ezali kopusana.
Ezali bokɛsɛni mingi kati na barezo socio mpe bafilm. Tosalaki na MPA te ntango tozalaki kosala mise a jour ya baparamɛtre na biso ya bakonteni, mpe bazali kopesa motuya na bakonteni ata mɔkɔ te na Instagram to/mpe na Facebook, mpe bazali kondimela te to kondima mpe te baparamɛtre na biso ya bakonteni na ndenge mɔkɔ. Kasi, tozwaki makanisi na malako ya MPA oyo ezali pibliki, oyo baboti basili koyeba, elɔngɔ na biyano ya baboti. Basistɛme na biso ya koyangela bakonteni ezali ndenge mɔkɔ te na lolenge ya kopesa mituya ya bafilm, yango wana eksperiansi ekoki kozala ndenge mɔkɔ te.
Bitando Ebele ya Libateli
Mpo na moto nyɔnsɔ: Tolongolaka bakonteni oyo ebukaka Mibeko ya Lisanga na biso. Tozali mpe na ndelo ya likolo koleka mpo na lolenge ya bakonteni oyo topesaka na toli.
❌ Bakonteni oyo TolongolakaMibeko na biso ya Lisanga elimbolaka lolenge ya bakonteni oyo topekisaka na Facebook mpe na Instagram. Tolongolaka konteni yango na mobimba na yango nyɔnsɔ mpo moto nyɔnsɔ - esangisi mpe bilenge - ntango nyɔnsɔ oyo toyebaka yango. Ntango tolongolaka konteni oyo ebukaka mibeko oyo, tokoki mpe kotya etumbu na konti oyo ekaboli yango, mpe tokataka bosali ya bakonti oyo ebukaka bapolitiki na biso mbala na mbala to na ndenge ya makasi mpeza. Bapolitiki oyo ebongisami mpo na kobatela bato nyɔnsɔ na lisanga na biso, esangisi mpe bilenge.
Lolenge ya bakonteni oyo tolongolaka na mobimba na yango nyɔnsɔ esangisi, kasi esuki wana te:
Kosala mabe mpe Kosalela na ndenge ya Mabe
Topekisaka bakonteni oyo ekoki kosala bato mabe to kosalela bango na ndenge ya mabe, lokola bappiblikasio oyo elendisaka makambo ya kosangisa nzoto kozanga ete moto andima kosala yango, to kokabola to kosenga bilɔkɔ ya kosala bana mabe. Lokola ndakisa, tokolongola:
❌ Piblikasio oyo ezali kopesa mosala ya bondumba to kosenga moto atinda baporno.
❌ Foto ya moto oyo azali na ndenge ya bolingo to ya kosangisa nzoto, oyo ekabolami kozanga ete bandima yango.
❌ Piblikasio oyo ezali kopesa to kosenga bilɔkɔ ya kosala bana mabe na ndenge ya kosangisa nzoto to bililingi ya bana oyo bazali motaka.Komiboma, Komizokisa, mpe Kolya na Ndenge ya Mabe
Topekisaka bakonteni oyo elendisaka, ekumisaka to esalaka bopalangisi ya komiboma, komisala mpasi to kolya na ndenge ya mabe, atako tozali se kaka kopesa bato esika ya koloba na ntina ya eksperiansi na bango mɔkɔ mpe koluka lisungi. Lokola ndakisa, tokolongola:
❌ Piblikasio oyo ezali koloba bolamu na ntina ya komiboma, komisala mabe, to kolya na ndenge ya mabe.
❌ Story oyo ezali kolakisa komisala mpasi oyo ekelami na masini.
❌ Komantɛre oyo ezali koseka moto mpo azali na kolya na ndenge ya mabe.
Bizaleli ya Koyina, Matumoli mpe Motungisi
Topekisaka bakonteni oyo ekoki kokela esika oyo epakisaka to etyaka bato na mopanzi, esangisi Matumoli mpe Motungisi. Lokola ndakisa, tokolongola:
❌ Piblikasio oyo ezali kosalela maloba ya kolongola bomoto liboso ya bato na kotalaka langi ya mposo na bango, bonzambe, ethnicité, komitalama lokola mwasi to mobali, to ndenge moto apɔni kosangisa nzoto.
❌ Komantɛre oyo ezali koseka moto oyo likama ya kosangisa nzoto na makasi ekweyela ye.
❌ piblikasio oyo ezali kokanela to bimisa bainformation oyo ekoki kosala ete bayeba moto (lokola nimero ya passeport) to kopusa kotungisa moto.
Baproduit mpe Baservice oyo Ezali na Bipekiseli
Topekisaka kosomba, koteka to kosala mombongo ya bilɔkɔ mpe baservice misusu oyo epekisami na baplateforme na biso. Topekisaka mpe bato basala bopalangisi ya lolenge ya bilɔkɔ misusu to kopesa malako na ndenge nini kosalela yango. Lokola ndakisa, tokolongola:
❌ Story oyo ezali kopesa kosomba, koteka, to kosala mombongo ya balolenge ebele ya bambangi.
❌ Piblikasio oyo ezali koluka kosomba, koteka, to kosala mombongo ya tumbako, nicotine, to masanga oyo elangwisaka
❌ Komantɛre oyo ezali kopesa biteni ya masasi imprimé na 3D.Tosalaka mwa baeksepsio mpo na mimbongo oyo mibeko endimi oyo etekaka balolenge misusu ya bilɔkɔ oyo epekisami na ndenge ya mibeko.
Kokanela mpe Bakonteni oyo Ekelami na Masini
Topekisaka bakonteni oyo ekelami na masini ya makasi mpenza, to bakonteni oyo ekoki kozala likama mpo na bokengi ya moto, lokola bokaneli ya kobundisa bato. Lokola ndakisa, tokolongola:
❌ Piblikasio oyo ezali kokanela koboma to kokidnaper moto mosusu, to moto azali kolendisa basusu basala mobulu.
❌ Video oyo ekelami na masini oyo ezali kolakisa moto oyo bazali kokata ye biteni ya nzoto to kotumba ye makasi mpenza.
Tosalaka mwa baeksepsio mpo na bakonteni oyo ekelami na masini na makambo ya bokɔlɔngɔnɔ to ntango ekabolami mpo na kotombola boyebi. Ntango topesaka bakonteni oyo ekelami na masini nzela, mingi mingi tozipaka yango na ekran ya likebisi mpo na koyebisa bato ete konteni yango ekoki kozala sensible liboso bafina na yango.
Bolumbu, Makambo ya Kosangisa Nzoto, mpe Maloba ya Polele ya Makambo ya Kosangisa Nzoto
Totyaka bipekiseli na komɔnana ya bolumbu to ya makambo ya kosangisa nzoto totyaka mpe bipekiseli na maloba ya polele ya makambo ya kosangisa nzoto. Lokola ndakisa, tokolongola:
❌ Elilingi to video oyo ezali na bolumbu to makambo ya kosangisa nzoto ya polele polele, esangi mpe soki ekelami na IA.
❌ Story oyo ezali na ndimbola ya grafique ya polelepolele ya bokutani ya kosangisa nzoto (longola se soki ezali mpo na liseki to kotyola na ndenge ya liseki).
Toyebi ete bakonteni ya bolumbu ekoki kokabolama mpo na bantina ebele, lokola mpe lolenge ya kotelemela, ya kotombola boyebi na ntina ya likambo ya motuya, to mpo na bantina ya mateya to ya bokɔlɔngɔnɔ. Esika oyo esengeli mpe oyo mokano ya bongo emɔnisami polele, topesaka nzela na konteni yango.
Mpo na badétail nyɔnsɔ na ntina ya bakonteni oyo tolongolaka, tala Mibeko na biso ya Lisanga.
🛡️ Bakonteni oyo Tokimaka Kopesa na ToliTopesaka batoli na bisika lokola Reels to Boluki ya Instagram to Etanda ya Facebook mpo na kosunga bato bamɔna bakonteni ya sika oyo bakoki kosepela na yango. Tozali na malako na ntina ya lolenge ya bakonteni oyo ekoki kopesama na toli, mpe kokima kopesa batoli oyo ekoki kozala ya kalite ya nse, kotelemelama, to ya sensible mpenza—ata ntango konteni yango ezali makasi mingi te mpo na kolongola yango. Ezali bongo mpo tokanisaka ete esengeli mibeko ya makasi mpenza ntango tozali kolakisa bato bakonteni ya bakonti oyo bapɔnaki kolanda te.
⚠️ Bakonteni ya Kobakisa oyo Tobombelaka Bilenge
Bilenge: Topesaka libateli ya kobakisa mpo na bilenge oyo bazali na nse ya bambula 18. Tobombaka bakonteni mingi koleka, koleka oyo tolongolaka mpo na bato nyɔnsɔ, mpe tosalaka mpe nyɔnsɔ mpo na kotika kopesa bakonteni oyo epesamka na mikolo na toli epayi ya bilenge. Mokano na biso ezali ete bilenge bamɔna bakonteni na Instagram mpe na Facebook oyo ekokani na oyo bakomɔnaka na film oyo ebongi mpo na mbula na bango, na ndenge ezali. Bilenge bakoki kaka kokɔta na tiers mɔkɔ, ya paramɛtre oyo epesi mwa bandingisa - ebengami Bakonteni Mingi Koleka - na ndigisa ya moboti. Na Instagram, bilenge to baboti bakoki mpe kopɔna kokɔta na paramɛtre oyo ezali na bipekiseli mingi koleka oyo ebengami Bakonteni oyo Etyami Bipekiseli, mpe bilenge bakoki kaka kofungola paramɛtre ya misato, ya bandingisa mingi - oyo tobengaka Bakonteni Mingi Koleka - na ndingisa ya moboti
13+ (paramɛtre ya yambo): Paramɛtre ya bakonteni mpo na bato oyo bazali na bambula 13+ ezwi makanisi na mituya ya bafilm mpo na bato oyo bazali na bambula 13+ mpe biyano ya baboti, mpe ezalaka polele mpo na bilenge lokola paramɛtre ya yambo. Tosali elɔngɔ na baexpert ya makambo oyo etali bilenge na mokili mobimba mpo na kosɔsɔla malamu koleka lolenge nini ya bakonteni oyo ekoki kozala malamu mpo na mikolo, kasi esengaka mayele ya mokolo mingi mpo na bilenge oyo bazali na nse ya bambula 18, mpe totalelaki malako wana ya kokokanisa na mbula liboso ya banote ya bafilm mpo na bato ya bambula 13+ mpe biyano ya baboti. Na paramɛtre oyo, tokobomba bakonteni misusu ya kobakisa liboso ya bilenge koleka oyo tolongolaka mpo na bato nyɔnsɔ. Elingi koloba ete, atako mikolo bakokoka komɔna konteni yango, bilenge bakokoka komɔna to koyangana na yango te, ata soki ezali konti oyo bazali kolanda nde moto ekaboli yango na Etanda na bango ya basango to Bastory. Tokosala mpe nyɔnsɔ mpo ete bilenge batika kokuka, kolanda mpe koyangana na bakonti oyo ekabolaka mingimingi bakonteni oyo ebongi mpo na mbula te.
Fina awa mpo na komɔna mwa balolenge ya bakonteni oyo tokobomba liboso ya bilenge na paramɛtre oyo ya liboso
Komiboma, Komizokisa, mpe Bamaladi ya Kolya
Tobombaka bakonteni misusu ya komiboma mpe komisala mabe mpo na kobatela bilenge liboso ya makambo oyo ekoki kosala bango mabe to oyo ekoki kozala sensible. Na ndakisa, tokotya bipekiseli na bambula:
⚠️ Piblikasio esika wapi moto azali kolimbola eksperiansi na ye mɔkɔ na ntina ya komiboma, komisala mpasi to kolya na ndenge ya mabe, longola se mpo na makambo ya kozonga na bokɔlɔngɔnɔ.
⚠️ Foto to video oyo ezali kolakisa bato na lopital oyo bazali koboma bato na ndenge ya kimonganga to kosunga moto amiboma.
⚠️Story oyo ezali na moto oyo azali koloba na ntina ezaleli na ye mɔkɔ ya makasi mpenza ya kokonda.
Baproduit mpe Baservice oyo Ezali na Bipekiseli
Tobombelaka bilenge bakonteni oyo ekoki kopusa bango bamipesa na makambo oyo ekoki kosala mabe. Na ndakisa, tokotya bipekiseli na bambula:
⚠️ Piblikasio oyo ezali koteka makaya, baproduit ya nikotine, masanga ya makasi, to mindoki soki ekabolami na kompani oyo endimami na mibeko, oyo ezali na esika eyebani.
⚠️ Story oyo ezali kolendisa bato bamela bankisi ya oyo esimbaka makanisi (eyebani lokola enteogɛne) to bilɔkɔ oyo esalami na kanabis.
⚠️ Bililingi oyo ezali kolakisa ndenge nini kolamba masanga oyo elangwisaka.
⚠️ Piblikasio oyo ezali koteka baproduit to baservice ya kokonda.
Bakonteni ya Kobangisa mpe oyo Ekelami na Masini
Tobombelaka bilenge mingi ya balilingi oyo ekelami na masini mpe oyo etungisaka, ata soki tondimaki yango na nsima ya ekran ya bokebisi mpo na mikolo. Na ndakisa, tokotya bipekiseli na bambula:
⚠️ Foto ya moto oyo batumbi makasi mpenza, oyo tokokanga na ekran ya likebisi mpo na mikolo.
⚠️ Foto to video ya kobeta masasi, mobulu, to makama ya mituka oyo ebomi bato.
Bolumbu, Makambo ya Kosangisa Nzoto, mpe Maloba ya Polele ya Makambo ya Kosangisa Nzoto
Tobombaka liboso ya bilenge, bakonteni ya kobakisa oyo ozali na bolumbu ya polele te to mpe makambo ya kosangisa nzoto te kasi ekoki komɔnana lokola ya kopesa likanisi ya kosangisa nzoto. Na ndakisa, tokotya bipekiseli na bambula:
⚠️ Piblikasio oyo ezali na pene na bolumbu lokola bolumbu oyo ezipami na bitanda ya digital.
⚠️ Foto oyo ebendami na esika ya masoko ya moto.
⚠️ Story oyo ezali na maloba oyo ezali kopesa likanisi ya kosangisa nzoto mpe ezali kolimbola bokutani ya kosangisa nzoto, esangisi mpe kosalela maloba ya koloba makambo ya kosangisa nzoto ya ndenge ya kobombana.
Mpo na badétail nyɔnsɔ na ntina ya bakonteni oyo tolongolaka, tala Mibeko na biso ya Lisanga.
Tokosala mpe nyɔnsɔ mpo na kotika kopesa balolenge mingi ya bakonteni na toli, ata soki ezali na boyokani na banote ya bafilm mpo na bato ya bambula 13+. Bakonteni mingi oyo tosalaka nyɔnsɔ mpo totika kopesela mikolo yango na toli esili kobombelama na mobimba na yango mpo na bilenge, kasi tokendeke mosika koleka mpo na bilenge mpe tosalaka nyɔnsɔ mpo na kotika kopesa balolenge ya bakonteni ya kobakisa na toli - lokola bafoto to bavideo oyo ekoki komonama lokola kosangisa nzoto na ndenge ya kobombana, kokata layi na ndenge ya makasi, to makambo ya likama makasi lokola kosote uta esika ya likolo.
Bakoteni oyo Etyami Bipekiseli: Na Instagram, mpo na baboti oyo balingi bokonzi ya kobakisa, tobimisi paramɛtre ya sika, oyo ezali na bipekiseli mingi koleka oyo tobengi Konteni oyo Etyami Bipekiseli. Soki paramɛtre ya Konteni oyo Etyami Bipekiseli ezali polele, tokotya bafiltre ya bakonteni na biso makasi koleka mpo na kobomba bakonteni mingi koleka uta eksperiansi ya Konti ya Elenge. Tokotya mpe ndelo mingi koleka na barezilta ya Boluki, mpe tokoboma makoki ya bilenge ya komɔna, kotya tokoyamba bakomantɛre na nse ya bapiblikasio.
Bakonteni Mingi Koleka: Bilenge bakoki kaka kobalola na paramɛtre ya 'Bakonteni Mingi Koleka' na ndingisa ya moboti, oyo moboti akoki kopesa kaka na nse ya miso ya moboti. Na kati ya baparamɛtre oyo, bilenge bakotikala se kaka kozwa litomba ya libateli ya automatique oyo ebombaka bakonteni mingi koleka liboso ya bilenge koleka oyo tosalaka mpo na mikolo, mpe tokokoba kolongola bakonteni na mobimba na yango soki ebuki Mibeko na biso ya Lisanga. Kasi, bilenge bakoki kozwa toli ya bakonteni misusu oyo bakozwa te na baparamɛtre ya 13+ mpe ya Bakonteni oyo Etyami Bipekiseli, mpe tokobomba bakonti nyɔnsɔ mobimba te oyo ekabolaka bakonteni oyo bongi mpo na mbula te. Paramɛtre ya Bakonteni Mingi Koleka ekopesa bipekiseli ya makasi koleka te ya bakonteni kati na Direct, Bakomantɛre, ampe Boluki oyo ezali kati na baparamɛtre ya 13+ mpe ya Bakonteni oyo Etyami Bipekiseli.
Likebisi: Ezali bokɛsɛni mingi kati na barezo socio mpe bafilm. Tosalaki na MPA te ntango tozalaki kosala mise a jour ya baparamɛtre na biso ya bakonteni, mpe bazali kopesa motuya na bakonteni ata mɔkɔ te na Instagram mpe na Facebook, mpe bazali kondimela te to kondima mpe te baparamɛtre na biso ya bakonteni na ndenge mɔkɔ. Kasi, tozwaki makanisi na malako ya MPA oyo ezali pibliki, oyo baboti basili koyeba, elɔngɔ na biyano ya baboti. Basistɛme na biso ya koyangela bakonteni ezali ndenge mɔkɔ te na lolenge ya kopesa mituya ya bafilm, yango wana eksperiansi ekoki kozala ndenge mɔkɔ te.
Ndenge Nini Kofunda Bakonteni ya Makambo ya Mobulu
Tosalaka makasi mpo na koyeba bakonteni oyo ebukaka mibeko na biso, mpe tomɔnaka bakonteni mingi oyo tolongolaka na lombango na kosalelaka teknolozi na biso liboso moto afunda yango esika na biso. Soki omɔni elɔkɔ oyo biso tomɔnaki te, bolimbisi sunga biso tosala ete baplateforme na biso ezala esika ya libateli koleka na kofundaka yango ezala na Facebook to na Instagram. Bofundi nyɔnsɔ ezalaka na sekele.
Baressource ya Kobakisa
Mibeko na biso ya Lisanga ezali na badétail na ntina ya balolenge ya bakonteni tolongolaka mpe totyaka bipekiseli na kolandaka mbula mpo na esika nyɔnsɔ ya politiki. Mpo na kotanga yango, fina awa.
Tobimisaki mpe teknolozi oyo eyebaka mikolo oyo bakoki kozala likama na lombango, lokola mokolo mɔkɔ oyo bilenge bakanga ye to bafunda ye mbala na mbala, to soki mokolo yango alukaka bakonteni ya mobulu mbala na mbala. Tokopesala bilenge toli ya mikolo oyo bakoki kozala likama te, mpe tokopesela te mikolo oyo bakoki kozala likama toli ya bilenge. Okoki kotanga mingi koleka na ntina na yango awa.
Okoki kotanga mingi na ntina ya ndenge oyo tosungaka mpo na kobatela lisanga na biso na bokengi na Esika na biso ya Libateli, mpe bandenge oyo tosungaka bilenge mpe mabota na Esika na biso ya Libota