Na Meta, tomipesa mokano ya kopesa bato makoki ya koloba polelepolele mpe ya kobatela bango na bokengi.

Uta 2016, tosalelaka lolenge mɔkɔ ya kosala oyo tobengi "kolongola, kokitisa, kopesa nsango" mpo na kokamba bakonteni na bateknolozi ya Meta.
Elingi koloba ete tolongolaka bakonteni oyo ebukaka bapolitiki na biso, tokitisaka bopanzani ya bakonteni oyo ezali na mikakatano kasi ezali kobuka bapolitiki na biso te, mpe topesaka bato bansango na makambo misusu mpo bakoka kopɔna nini bakoki kofina, kotanga to kokabola.
Mpo na kosunga stratégie yango, tozali na bapolitiki oyo ezali kolimbola makambo nini endimami mpe nini endimami te na bateknolozi na biso. Bikipi na biso esalaka elɔngɔ mpo na kosala bapolitiki na biso mpe kotosisa yango. Tala ndenge esalaka.

1

Tosalaka elɔngɔ na bato ya mayele ya mokili mobimba na oyo etali tekinolozi, bokengi ya bato mpe ntomo ya bato mpo na kokela mpe kobongisa bapolitiki na biso.

2

Tosalaka bafonctionnalité mpo na bokengi, mpo ete bato bazala na makoki ya kofunda bakonteni mpe kokanga, kobomba to kokata kolanda bakonti.

3

Tosalelaka teknolozi mpe botali ya bato mpo na kosala ete mibeko na biso etosama.
Tobatelaka bato na bokengi mpe totikaka bato bapesa biso mokumba na kokabolaka bapolitiki na biso, balapolo ya botosi mibeko mpe ya bopolele.
policy-image
Bapolitiki na biso
Bapolitiki na biso elimbolaka makambo oyo endimami mpe oyo endimami te na bateknolozi ya Meta. Soki konteni ebuki mibeko ya politiki na biso, tokosala likambo na yango.
enforcement-image
Ndenge na biso ya kotosisa mibeko
Tosalelaka teknolozi mpe ekipi ya botali mpo na koyeba, kotalela mpe kosala likambo likolo ya bamillion ya bakonteni, mikɔlɔ nyɔnsɔ, na Facebook mpe Instagram.
transparency-reports-image
Balapɔlɔ na biso ya bopolele
Tobimisaka ntango nyɔnsɔ balapɔlɔ ya bopolele mpo na kolakisa na bato ndenge nini tozali mpo bapolitiki na biso etosama.
ranking-image
Ndenge na biso ya kolimbola botyami na milɔngɔ
Basistɛme ya intelligence artificielle (IA) etalisaka botyami na milɔngɔ ya bakonteni mpo na baeksperiansi ebele na baproduit ya Meta, lokola kotala Etanda ya Bansango ya Facebook, kotala bareel na Instagram to kotambola na Facebook Marketplace.
Bamise-a-jour oyo esalemi kala te